12
Elongo nde toke libiso ! Sosola malamu bomeli buayo bua kisi

Elongo nde toke libiso - sida-charleroimons.be · • Bomeli bua kisi ekopesa makasi pe kobatela nzoto nagai (biye bibatelaka nzoto). Ekobakisa motango ya ba anicorps (CD4) lolenge

Embed Size (px)

Citation preview

Elongo nde toke libiso !

Sosola malamu bomeli buayo bua kisi

2 •

Makomi oyo mabongisami na lingomba ya basi bayebawuta mikili ndenge na ndenge mpe bazali nanyama ya VIH, kolandana na maye makomelakibango, mpo na koyebisa basusu baye bawuti kozuasango ete bazuami na nyama ya VIH.

Mukanda oyo ekomami na lisalisi mpe botangi yabolengeli yango na bakalata baye basalaka misalaoyo na nkota ya pete mpe eye ekososolama.

Elongo nde toke liboso, esalami na lingomba ya ba volontaire ya basibaye bawuta mikili ndenge na ndenge mpe bazali na bokono ya sida,minganga, SidAids migrants/Sireas asbl, Libiki asbl, Projet Nyampinga,Clarice illustrations (www.clarice-illustrations.be), i-propeller mpeOksigen Lab.

Mukanda oyo mutu nyoso akoki kosalela yango mpekobimisa ebele ya mitango nayongo ya ofele na se yalicence Creative Commons BY-NC-SA.

Mpo na kosenga mukanda oyo, kozua lolenge songolo nayango kowutana internet to lolenge mususu ya maye okoki kotanga to mpe kozuamayebisi misusu likolo ya mabongisi oyo, kota na :www.oksigenlab.eu/misunderstood

1 - Ngai na nyama

« Ba wuti koyebisa nga ete nazui Nyama (Nazana Nyama). Munganga alobi ete na banda ko-mela kisi. »

Nyama ya VIH eza nini ?

• Nyama ya VIH (Virus de l’ImmunodéficienceHumaine) ezali nyama eye epesaka bokonobua SIDA.

SIDA eza nini ?

• SIDA (Syndrome de l'Immuno DéficienceAcquise) ezali bokono boye bobundisaka baanticorps na nzoto ya mutu.

Nini yangoebatelaka nzoto ?

• Ezali biye bizalinakati ya nzoto mpona kobatela yango.Epekisaka ba microbe(neti ba virus, babactéries...) etungisanzoto ya mutu.

biye bibatelaka nzoto

virus

• 3

4 •

Nazali na nyama ya VIH, kasi nazalikoyoka bokono te

• Mutu oyo azui nyama ya VIH akoki komemayango mibu ebele kozanga koyeba tokomona bilembo ya bokono. Baye bazali nanyama ya VIH bakoki ko kabola yango atasoki bazo bela té.

Ntina nini esengeli namela kisi ?

• Mpo na kozala kolongono.

Kokisa makasi ya nyama :

kotisa makasi nyama

Komatisa motango ya ba anti-corps (CD4) :

elingi koloba kobakisa makasi yabiye bibatelaka nzoto

CD4 D4CD

• Mpo na kobakisamakasi ya biyebibatelaka nzoto :

komatisa motango yaba anticorps (CD4)

• Mpo na kokitisamotango ya banyamana makila :

kokitisa bongomakasi ya nyama

Kisi mpo na nyama ya VIH/SIDA ezali, kasi ebikisaka té.

• 5

2 - Ngai na bomeli bua kisi

Ntina nini namela kisi ?

• Ekopekisa ete nyama ya VIH ebakisamampe elenda nakati, ya nzoto mobimba.

• Ekopekisa nyama ya VIH epanzana na nzotonagai.

• Ekopekisa ete nyama elanda ba anticorpsmisusu.

• Ekopekisa lalisa nyama mpongi.

Na mukuse… kozala kolongono !

bOmElIbuA KISI

bOmElI buA KISI

bOmElI buA KISI

bOmElI buA KISI

STOP

6 •

litomba nini yango ezali mpo nabokolongono bua nga ?

• Bomeli bua bakisi ekokitisa motango yabanyama na nzoto ngai.

Kokitisa makasi ya nyama

• Bomeli bua kisi ekopesa makasi pe kobatelanzoto nagai (biye bibatelaka nzoto).

Ekobakisa motango ya ba anticorps (CD4)

lolenge nini esengeli namela kisi ?

• Biso banso tomelaka kisi ndenge moko te pe banzoto nabiso esalaka ndenge moko té liboso yakisi. monganga akolakisa yo lolenge ya komelakisi mpe na ngonga eye esengeli.

• Ezali ya motuya mpeza komela kisi nyoso ya VIHlolenge munganga apeseli yango na ngonga eyeesengeli mpemotango eyeesengeli (yango ndeekosala ete kisi ezalatango inso na nzotompo ete ebatela ngana nyama ya VIH).

bOmElI buA KISI

bOmElI buA KISI

CD4

• 7

Eloko nini ekosalema soki nameli kisi telolenge monganga alobaki ?

Soki nameli kisi te lolenge esengeli :

• Nyama ekolamukampe ekotungisanzoto mingi mpeekokoma mutumakasi na kisi.

• Nzoto ekolemba mingi.

Soki natiki komela kisi :

• Nyamaekokoma namotungisi,kobangisamingi mpekobebisa.

• Nakokikobela.

Nakoki kosolola nyoso eye etali bokonona munganga ? • Iyo, munganga na ekipe naye bazali wana

mpo na kosunga yo, kolendisa yo mpekopesa biyano na mituna na yo nyoso.

méDECIN

PSyCHOlOguE

DIéTéTICIEN-NE

gyNéCOlOguE

SExOlOguE

INfIrmIEr-èrE

ASSISTANT-E SOCIAl-E

boyeyi malamu

8 •

3 - Toza kolobela yango...

“ Na ebandeli etungisaki ngai, epesaki nga kanda , kasinalandelaki komela bakisi. Sikoyo makasi ya nyama nanzoto etiki komonana mpe etikeli mua esika, nazali naelikia.“ J., mibu 62

“ Moke moke na kosolola na batu mosusu ya lingombana ndimi oyo ekomeli ngai.“ G., mibu 22

“Nazalaki na posa ya kolia te, kilo ebandaki kokita nga,nabandaki komilinga lisusu té. Na mokolo songolonabandaki bongo kolengela nzoto nagai mpe sika’oyonakomi koyoka malamu.“ D., mibu 55

“ Na salaka keba na biloko ya kolia ( frites moke, mafutamoke), naliaka ndunda mingi pe na melaka mayi ebele.“P., mibu 34

“Na ebandeli ya bokono nazalaki naposa ya kosanganana mobali té, po na nzela wana nde nazuaka bokono.Sima na kutanaki na Pol (ye azali na bokono té).Tomiteyaki likolo ya bokono yango. Tofuandi nabisomalamu ! “ M.-L., mibu 40

“Na yebaki ete nazali na bokono esali mibu 25 . Nazalin’elikia na mikolo mizali koya ! “ S., mibu 45

“Nakutanaki na mobali na nga na lingomba, tosali libotaya sika.“ M., mibu 46

“Kobota muana na nzoto nkolongono tango ozali naVIH, ekoki kosalema. Ba solutions ezali ! “ M., mibu 29

“ Nazuaki pasi ya ba effet secondaire na ebandeli yabomeli kisi kasi sika nazali malamu bapasi ekita.“ T., mibu 23

“ Nakendeki komona spychologue, nasololi naye namaye nakokaki kosolola na libota na nga té.“ V., mibu 30

“ Nazuaki mikakatano te na ebandeli ya menopausenangai tango nokokisaki mibu 43 na lisalisi yagenecoloque mpe ya monganga nagai ya ba maladieinfecteieuse .“ D., mibu 49

“Po na kobunda etumba oyo ya makasi boye, nasalakaba exercices. Yango ezo sunga nga. Nakoma kotambolana makasi, oyo nakokaki kosala liboso té.“ S., mibu 38

• 9

4 - Toli mpe mayele

� Bongisa bakisi po na poso mobimba na kopo mpetia yango nesika yakomonana (pembeni yambetu, na cafetiere...).

� Tiya alarme na telefonemobile nayo elelaka soki ngongaya komela kisi ekoki.

� Zuaka malako masika mpe mikanda miye misengeli(ndakisa : lolenge loye losengeli mpo na komela kisimpo na baye bazuaka lisungi kowuta naBulamatari) na ngonga mpo na ko eviter kokatakata bomeli bua kisi.

� Koma na manaka to na karnetmikolo ya bokutani to tiyayango na ngonga ya koyebisana telefone.

� Lobela monganga mbongwana nionso eye esalemina maye matali bomeli bua kisi : bapasi ya sima/baeffet secondaire (bolembu, kosanza, kozanga pongi,kozanga posa ya kosangana na mbetu.) namikakatano misusu (na lingomba, na esika yamusala...).

� landa malako ma munganga (tangoya komela kisi, soki ekosengelakosangisa yango na bileyi, ba mbala ya komela,motango ya ba mbuma ya komela...).

� Komela mbala moko te kisi oyo esengelaki omelambala mibale soki obosanaki komela mpekomimelela bakisi bimelela té.

� Kotia kisi te na bisika biye bisengeli té(portefeuille, sac plastique).

� Soki okeyi na mobembo, zua bakisi oyoekoki mpe na mukanda ya munganga oyo ezali kolakisa ntina yayo kotambola na bakisi.

16

1116212530

27

1217222631

38

13182327

49

14192428

51015202429

X jour

l m m J V S D

10 •

5 - Esengeli oyeba ete

VIH ezuamaka nakati ya

• Makila • Makidi (na mayi oyo ebimaka liboso ya ko

verser) • Mayi ebimaka na muasi (na mpe makila ya

sanza) • Mayi ya masoko • Mabele ya mama

VIH epesamaka

• Na tango ya ba rapportsexuel eye ebatelami tena nzoto ya mwasi,mpe ba rapport sexueleye esalemaka na nzela ya sima to nakati namonoko (soki botie kapote té)

• Na kosimba makila oyo ezali nabokono (nabozongisi makila nanzoto, kokabola tonga, eloko oyoekoki kokata pota, to tonga yaminganga eye ba steriliza te)

• Kowuta na mama oyo azali nabokono kokota epayi ya muana nayenatango ya zemi soki azalaki komela kisite mpe na tango ya komelisa muanalibele.

Nyama ya VIH epesamaka té na nzela ya

• Kopesana ba bese,na kosu kosu, na soyi, to na mayi ya miso

• Kopesana mboté ya loboko to koyambana • Kosangisa ba sani, mbeli, verres, kopo,

elamba ya kozipa mbetu, WC, to kikoso • Kosua ya ba ngungi.

!

sexe

• 11

6 - Ndenge nini okoki komibatela ?

• Salela kapote (ya muasi to mobali) na tangunyoso ozali kosala rapport sexuel mpo nakomibatela na bokono ya IST (bokono boye bozuamaka na nzela ya kosibana).

• Soki kapote ekatani na eleko molonganimoko azali nabokono té, bokende na lombango na lopitalo nakati ya ngonga 72h, epayi wapi akokikozua lisalisi na nkisi eye bapesaka baye basalakirapport sexuel eye ekoki komemela bango likamampo na kozanga komibatela.

• Soki bilembo ya makasi ya nyama bizali lisusukomonana té na nzoto na yo, solola na mongangaliboso ya kotika kosalela kapote.

7 - bisika bya litomba epayi wapi okoki kozua lisalisi

bruxEllES

SidAids migrants/Sireas asbl Groupe « Mandela »Rue de la Pepiniere, 6 1000 Bruxelles

• Tél 02/502 36 76 • GSM 0471/21 32 02

ASbl libiki Boulevard Leopold II, 99 1080 Bruxelles

• Tél 0484/640 522 • GSM 0485/999 006

lOuVAIN-lA-NEuVE

Projet Nyampinga Collectif des femmes, Rue de la Citronnelle, 711348 Louvain-la-Neuve

• GSM 0498/71 30 62

ANVErS

HIV-SAm ProjectNationalestraat 1552000 Antwerpen

• Tél 03/247 07 18• Fax 03/247 64 32

lIègE

groupe de Parole - CHu liege Centre de Reference SIDA - CHULiege, Quai Godefroid Kurth, 45 4020 Liege

• Tél 04/270 31 90

NAmur

le SASEr (Service de SanteAffective, Sexuelle et deReduction des Risques) Rue Docteur Haibe, 45002 Namur

• Tél 081/77 68 20

CHArlErOI

SIDA-IST Charleroi-mons C/o Polyclinique CHU Charleroi Boulevard Joseph Il6000 Charleroi

• Tél 071/92 54 10

mONS

SIDA-IST Charleroi-mons Place Nervienne 33 (site CPAS)bloc Glepin 6 - 1er étage 7000 Mons

• Tél 065/82 27 55

GRATUIT

lN