36
BILEI Y A MOLIMO N A NTA NGO EBONGI Ndima kaka, ndima kaka, Nyonso ekosalema, kaka… Ndenge nini, sikawa boye: Sikawa nandimi, sikawa nandimi, Nyonso ekosalema, sikawa nandimi; Sikawa nandimi, sikawa nandimi, Nyonso ekosalema, sikawa nandimi. Tótikala ndenge totelemi sikawa, wana togumbi mitó. Nkolo, tika ete oyo ézala bobele loyembo te, kasi bozindo mpenza ya mitema na biso koyemba na makasi ete: “Sikawa nandimi!” Mokolo moko, bayekoli balobaki, sima na Yesu kosala misala na nguya mingi mpenza, balobaki: “Nkolo, sikawa tondimi.” Yesu alobaki: “Bondimi sikawa?” 2 Balobaki: “Tondimi ete Oyebi makambo nyonso, pe osengeli na moto moko te mpo na kolakisa Yo.” Na bongo, Tata, na mpokwa oyo tososoli ete Osengeli na malakisi na biso te, kasi biso tosengeli na oyo ya Yo. Na bongo, tobondeli ete Ólakisa biso ndenge ya kobondela, ndenge ya kobika, pe ndenge ya kondima. Kokisa yango, Nkolo, kati na liyangani ya mpokwa oyo. Soki tozangi eloko moko, pesa biso yango, Nkolo. Tosengi yango na Nkombo na Yesu. Amen. 3 Nayebi ete mingi kati na bino bozali ya kotelema lisusu na mpokwa oyo. Pe, na libanda, nakutanaki na bato oyo balobaki ete bakokaki kokota te, pe bazali koyoka na ba-radio na bango, kati na mituka. Pe sikawa tokomeka kosala noki-noki mpenza na mpokwa oyo, mpokwa ya lomingo, tokomipesa na mabondeli mpo na babeli, tokozala na molongo ya mabondeli ndenge tokokoka kosala yango awa liboso. Kasi tokosala liyangani ya mpokwa ya lelo mpo na kobondela mpo na babeli. 4 Pe nalingi ete bóléndisama sikawa kati na…na Malako oyo ya Bule ya Nzambe, kati na Kondima, Kondima ya eleko oyo. Kondima! Ekosenga kondima mingi, koleka oyo ezalaki na bileko mosusu nyonso, mpo oyo esengeli kozala kondima mpo na konétolama, mpo na komemama na likolo. Na bongo, tolingi ete bóndima, na mpokwa oyo, nyonso oyo bosili komona pe koyoka, Liloba oyo boyokaki koteyama, bi—bilembo pe bikamwa oyo bosila komona kosalema. Tolingi ete bóbomba nyonso wana na mitema na bino, pe bótala-tala yango, soki ezali Nzambe to te.

LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

  • Upload
    others

  • View
    2

  • Download
    0

Embed Size (px)

Citation preview

Page 1: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEIYA MOLIMO

NA NTANGO EBONGI

Ndima kaka, ndima kaka,Nyonso ekosalema, kaka…

Ndenge nini, sikawa boye:Sikawa nandimi, sikawa nandimi,Nyonso ekosalema, sikawa nandimi;Sikawa nandimi, sikawa nandimi,Nyonso ekosalema, sikawa nandimi.

Tótikala ndenge totelemi sikawa, wana togumbimitó.Nkolo, tika ete oyo ézala bobele loyembo te, kasi bozindo

mpenza ya mitema na biso koyemba na makasi ete: “Sikawanandimi!” Mokolo moko, bayekoli balobaki, sima na Yesukosala misala na nguya mingi mpenza, balobaki: “Nkolo, sikawatondimi.”

Yesu alobaki: “Bondimi sikawa?”2 Balobaki: “Tondimi ete Oyebi makambo nyonso, pe osengelina moto moko te mpo na kolakisa Yo.” Na bongo, Tata, nampokwa oyo tososoli ete Osengeli na malakisi na biso te, kasibiso tosengeli na oyo ya Yo. Na bongo, tobondeli ete Ólakisa bisondenge ya kobondela, ndenge ya kobika, pe ndenge ya kondima.Kokisa yango, Nkolo, kati na liyangani ya mpokwa oyo. Sokitozangi eloko moko, pesa biso yango, Nkolo. Tosengi yango naNkombo na Yesu. Amen.3 Nayebi ete mingi kati na bino bozali ya kotelema lisusu nampokwa oyo. Pe, na libanda, nakutanaki na bato oyo balobakiete bakokaki kokota te, pe bazali koyoka na ba-radio na bango,kati na mituka. Pe sikawa tokomeka kosala noki-noki mpenzana mpokwa oyo, mpokwa ya lomingo, tokomipesa na mabondelimpo na babeli, tokozala na molongo ya mabondeli ndengetokokoka kosala yango awa liboso. Kasi tokosala liyangani yampokwa ya lelo mpo na kobondelampo na babeli.4 Pe nalingi ete bóléndisama sikawa kati na…na Malakooyo ya Bule ya Nzambe, kati na Kondima, Kondima ya elekooyo. Kondima! Ekosenga kondima mingi, koleka oyo ezalaki nabileko mosusu nyonso, mpo oyo esengeli kozala kondima mpo nakonétolama, mpo na komemama na likolo. Na bongo, tolingi etebóndima, na mpokwa oyo, nyonso oyo bosili komona pe koyoka,Liloba oyo boyokaki koteyama, bi—bilembo pe bikamwa oyobosila komona kosalema. Tolingi ete bóbomba nyonso wana namitema na bino, pe bótala-tala yango, soki ezali Nzambe to te.

Page 2: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

2 LILOBA LILOBAMI

5 Ezali lokola Elisa, kalakala, alobaki: “Soki Nzambe azaliNzambe, na boye, bósalela Ye.” Pe soki Yesu azali kati-katina makambo nyonso mpo na Moklisto, na boye, nakanisi etetosengeli kotika makambo mosusu nyonso mpo na kokangamana Ye. Bómikanisela, Azali Kati-kati, Azali Monzoto ya nordi,Azali Ekimelo ya suka, Azali Etemelo. Pe soki Azali Monzoto yanordi…Ezali na eloko se moko oyo etalisaka monzoto ya nordi,ezali boussole oyo onanaka na yango. Pe Boussole oyo nazalikoluka konana na yango, ezali Liloba, pe Liloba etalisaka Yentango nyonso.6 Ezali komonana lokola tozali koleka na ntango moko yampasi pe mimekano mingi, kotungisama ya ntango pe mpasikatii na bikólo, makambo ndenge na ndenge ezali kosalema,pe ntango mosusu ekómelaka ngai lokola namelámi…Bisikanyonso nakotala, ezali lokola likolo na…kati na masuwa likolona mai-na-mbu. Pe bapesi ngai mokumba ya Masuwa yango.Tokokóma malamu ndenge nini? Pe tala mbóngé ezali koya,ekómi lokola pémbé likolo na yango, eleki masuwa na ngai namonene mbala mokama. Kasi tokoleka mbóngé nyonso wana.“Tozali koleka balóngi, mpo na Ye.”Kapiténe, KapiténeMokonzinde asimbi singa na suka ya masuwa, Ye moto akolekisa yango.Tokoleka mbóngé nyonso wana.7 Sikawa, na mpokwa oyo, mpo na kosala noki pe kotika binokokende na ntango malamu. Totondi bino ndenge botambolakantaka molai na mituka, pe nyonso wana, ndenge bosengelikotambola na mituka, pe komipesa mbeka. Bomoni, yangoesálaka ete nátelema esika natelemi mpo na kokoba koloba pekosála nyonso nakoki kosála mpo na kosunga bino. Kasi ntangonazalaka awa, nalukaka kokotisa na bozindo nyonso nakokikosala, mpo na kosunga na ntango oyo tozali awa sikawa. Nasima, bokozua…Soki opesi bato makambo mingi koleka mbalamoko, bakosimba yango te. O—osengeli kozua likambo moko pekotalisa yango malamu mpenza liboso na moto kino bakososolayango. Na sima, soki basimbi yango makasi mpenza na mitemana bango, na ntango wana bako…na ntango wana teya bangolikambo mosusu. Tozali kokende se liboso, litambe moko simana mosusu.8 Sikawa, bóbondela pe bózala na mpiko, pe bóndima sikawa,na mpokwa oyo, mpo na kobikisama. Nandimi te ete bozali nantembe, ata moke, na makanisi na bino mpo na ntango oyo tozalikobika na yango. Nandimi te ete bozali na ntembe na makanisina bino mpo na koyeba soki Nzambe azali elongo na libota naYe to te. Nandimi ete bino nyonso bondimaka yango. Pe ngai…Ntembe ezali ata moke te na makanisi na ngai mpo na yango.Pe na—na—nayebi ete bato na ngai, baninga na ngai, baninga yaKlisto, bana ya—ya Klisto, bandimaka yango.9 Pe epesaka ngai esengo mingi ya komona, ntango oyebi eteozali na Nsango kouta na Nzambe, pe ozali kopesa yango na

Page 3: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 3

bato, komona bato koyamba Yango. Na boye okobwaka miso nasima pe okoloba: “Natondi Yo, Tata.” Oh, ezalakampenza esengona ntango wana, komona ndenge bana bazali kolia Lipa oyobatindeli bango! Bozali koyeba ete ezali emononeli epesamakieleki mibu mingi, awa na mongombo oyo? Ezali solo: “Lipaya Bomoi.” Ndeko Neville, obosani yango te, ntango mosusu.Ntango malamu mpenza!10 Sikawa tófungola, soki bolingi kolanda litángi to kokomayango, bobele…nandimi te ete ezali malamu koyanganakozanga kotánga Liloba na Nzambe pe kobakisa mwa maloba,soki ekozala liyangani ya kobondela mpo na babeli to elokomosusu. Biso nyonso tozali kososola. Mopaya azali kati na bisoawa te, nabanzi. Kasi biso nyonso tozali kososola eloko ninikobikisama na nzoto ezali. Ezali eloko te oyo moto azali kosalampo na yo; ezali eloko oyo Nzambe asílá kosala mpo na yo. Ezalipe bongo mpo na lobiko. Likambo moko, ezali, komema batokondima ete ezali Solo. Nzambe alakisi yango naLiloba naYe, nasima Atalisi yango polele epai na baoyo bakondima Yango, mpoAlobaki: “Nyonso ekosalema na baoyo bakondima.”11 Bolobaka: “Mpo na Nzambe, eloko moko te ekozangakosalema.” Bondimi yango? Eloko moko te ekozanga kosalemampo na yo pe. “Mpo nyonso ekosalema mpo na baoyo,” (Nzambeazali bobele Moto moko) “baoyo bakondima.” Bomoni? Nabongo, eloko moko te ekozanga kosalema mpo na bino, sokibokoki bobele kondima.12 Sikawa naMikonzi ya Liboso, mokapo ya 17, nalingi kotángamilongo nsambo ya ebandeli, soki Nkolo alingi.

Eliya, Motisibi, moko na bato ya Gilada, alobaki naAkaba, Lokola YAWE Nzambe ya Yisalaele, oyo natelemiliboso na ye, azali na bomoi, na mibu oyo, mamwe tombula ekozala te, bobele na liloba na ngai.

Pe liloba na YAWE eyelaki ye ete,

Longwa awa, kende na esti, kende na ngámbo ya esti,pe ómibomba pembeni na mokele ya Kerite, oyo ezali naesti ya Yordani.

Okomela mai ya mokele, pe napesi biyangangamitindo ete báleisa yo kuna.

Bótala: “báleisa yo kuna”, esikamosusu te. “Kuna!”

Boye, akendeki pe asalaki kokokana na YAWE, to naliloba na YAWE: bongo akendeki pe akómaki kofandapembeni na mokele ya Kerite, oyo ezali na esti yaYordani.

Biyanganga ezalaki komemela ye lipa ná mosuni nantongo, pe lipa ná mosuni na mpokwa; pe azalakikomela mai ya mokele.

Page 4: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

4 LILOBA LILOBAMI

Na sima na mwa ntango, mai ya mokele yangoekaukaki, mpo mbula ebetaki te na mokili.

13 Nkolo ábakisa mapamboli na Ye na litángi ya Liloba na Ye.Pe sikawa, na mpokwa oyo, nalingi kozua motó ya liteya uta nayango, ekobengama “Bilei ya molimo na ntango na Yango”. Nantongo to—toyekolaki li—likambo ya “Kosalela Nzambe mosala,to koluka kosalela Ye mosala kozanga ete ézala…ete ézalantango, eleko, esika, to moto yango”. Pe sikawa oyo ezali: BileiYa Molimo Na Ntango Ebongi.14 Mosakoli oyo, Eliya, toyebi makambo na ye mingi mpenza te.Kasi toyebi ete azalaki mosali na Nzambe, pe mosali na Nzambempo na eleko wana.15 Pe Nzambe asili kosalela Molimo na Ye oyo ezalaki likolo naEliya,mbalamisato, pe alaki lisusumbalamibale;mbalamitano,ezali ngolu. Asalelaki Yango likolo na Eliya; Eyaki likolo na Elisana ndambo mibale; ezalaki likolo na Yoane Mobatisi; pe esengelikoya mpo na kokotisa Mwasi na libala ya Mabota; pe ekoya,elongo na Mose mpo na kozongisa Bayuda na ndako. Ezali solo.Nzambe alaki kosalela Molimo ya Eliya mbala mitano, pe asilikosala yango mbala misato.16 Sikawa, mosakoli monene oyo, toyebi esika autaki te. Toyebiete azalaki Motisibi. Kasi ndenge ayaki…17 Toyebaka makambo ya basakoli mingi mpenza te. Toyebakate esika bautaka. Esalemaka mingi te…Na bongo, nayebi atamoko te oyo autaki na lingomba to azalaki na bakitani simana ye. Bazalaki bobele bato lokola bato nyonso, babangakaeloko te, pe, mbala mingi, batángá te. Pe bakomá ata mokandámoko te, bango moko. Yisaya ná Yilimiya, mibale to misatokati na bango bakomáki mikanda, kasi moto monene oyo, Eliya,akomaki ata eloko moko te. Mingi kati na bango bakomakite; ntango mosusu bayebaki kokoma te. Kasi bazalaki bato yamakambo makasi. Moto ata moko te na Biblia azalaki lokolabasakoli yango ya kala. Batélémélaki bokonzi, bakonzi, mabota,mangomba, pe makambo nyonso mosusu, batelemaki ngwi naLiloba na Nzambe, pe Nzambe atalisaki polele ete bazalakikoloba soló. Bazalaki bato yamakambomakasi.18 Pe Eliya oyo azalaki moko na makambo makasi kolekakati na bango nyonso. Azalaki moto ya biliki. Autaki na biliki;azalaki kofanda na biliki. Biblia elobi ete alataki elamba yankunza ya nyama. Amizipaki na loposo ya mpate, pe alatakieteni ya loposo ya nyama, loposo ya kaméla na loketo na ye,mpenza…elongi etóndá na mandefu, nabanzi ete azalaki motona lolenge yamakambomakasi mingi, na kotala ye.19 Kasi toyebi te…bango nyonso bakufaki te. Bango nyonso—bango nyonso bakúfá te. Na eleko ya Likita ya Nicée, mingikati na bino baoyo botánga Likita ya Nicée ya Lingomba yaEbandeli, ntango balingaki kokómisa yango ebongiseli, koboma

Page 5: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 5

mangomba nyonso mosusu, pe kokomisa yango se moko, ntangobasalaki Likita ya Nicée wana, bato ya makambo makasi lokolaElisa bayaki wana, bautaki na biliki, bazalaki kolia bobelematiti; bato ya makambo makasi mpenza. Kasi bato ya lokumu,bato minene, bato ya Constantin, pe nyonso wana, bakangisakibangominoko.Mpo bango, lokola basakoli, bayebaki ete mbumaya lisango ya Mwasi na libala-Lingomba esengelaki kokweya namabelé, motindo moko oyo mbuma ya lisango kati na Mobali nalibala esengelaki kokweya na mabelé. Pe etikalaki wana mibunkoto mobimba.20 Yango wana bakomaka na ba-búku lelo: “Wapi Nzambewana ya kimia, oyo akokaki kofanda kimia pe kotala, komonandenge bazalaki koboma bana mike, ndenge ba-nkósi ezalakikopanza basi biteni-biteni, pe afandi na likolo kozanga atalikambo ya koloba?” Bayebi Liloba te. Mbuma ya lisango yangoesengelaki kokweya na mabelé. Ndenge nini Nzambe ya semboakokaki kofanda kimia pe kotala Mwana na Ye moko kokufa,kobwakelama nsoi, pe bongo na bongo? Kasi ekokani na Liloba,esengelaki bongo. Esengeli pe kozala bongo,mpo na eleko oyo.21 Moto oyo, azalaki moto monene. Azalaki na libota ya batoya masumu liboso na ye. Akaba azalaki mokonzi, tata na ye,liboso na ye, azalaki moto mabe. Kobanda ntango ya Salomona,bakonzi nyonso balandaki bazalaki bato mabe. Pe moto oyo,Akaba, oyo akonzaki Samalia mibu ntuku mibale na mibale,azalaki mabe koleka bango nyonso. Azalaki mpenza moto yamakambo ya mikolo oyo. Na ntembe te, azalaki kondimelalosambo. Pe akotisaki makambo ya mikolo oyo na bisika nyonso.Azalaki na basakoli na ye nkamaminei ya Baebele, bango nyonsobatángá pe bayékolá malamu. Nzambe atindelaki ye moko, kasiaboyaki kondimela ye, ezalaki nde Eliya.22 Kasi Eliya, Motisibi oyo, azalaki moto ya biliki. Azalaki nantóki ya maloba te, azalaki moto ya makambo makasi. Mokolomoko, sima na Akaba kosala masumu mingi kino Nzambeakokaki lisusu koyikela yango mpiko ata moke te, Asololaki naEliya na biliki. Pe ye wana asimbi nzela ya Samalia, ndengenatalisaka yango mingi; ntango mosusu mandefu ya pembeetondaki na elongi na ye, libandi na ye ezalaki kongalá na moi,miso na ye ekómaki mike, kuna, língenda na loboko, azalakikomunga-munga, akendeki mbala moko epai na mokonzi yaYisalaele, pe alobaki: “Ma…Ata mamwe ekokita te, kinonakobéngisa yango.”23 Nzambe ápesa biso bato ya ndenge wana, bomoni, bato oyobayebi eloko bazali kosala ná YANGOELOBINKOLO.24 Sikawa, tomoni ete liboso ya kosala yango, Nzambeabengaki ye. Nzambe asololaki na ye, yango wana azalakikobanga eloko moko te. Azalaki kobangela nsango na ye te,ete ekokokisama te; ayebaki ete ekokosisama! Ayebaki ete

Page 6: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

6 LILOBA LILOBAMI

ekokanaki na Liloba ya Nkolo, pe ayebaki ete azalaki mosakoliya Nzambe mpo na eleko. Yango wana, ata mokonzi alingákikokáta moto na ye, kobwáka ye na boloko, nyonso balingakikosala, mpo na ye, ezalaki na ntina moko te; azalaki na etinda:“YANGO ELOBI NKOLO”, liboso mpenza ya mokonzi. Motoya matátá nini oyo! Kasi liboso na ye kosala yango, ásakolakibokauki monene wana…25 Mpamba te, Nzambe atikaka lisumu kozanga etúmbu te.Etúmbu esengeli kozala. Mobeko oyo ezangi e—etúmbu, ntinana yango nini? Ntina nini koloba “kokatisa mwinda motaneezali kotelemela mobeko”, wana lománde moko ezali te simana yango, to etúmbu moko te sima na yango? Ezali na yangomobeko te. Bongo, etúmbu ezalaka mpo na lisumu. Pe ntangoNzambe asali mobeko, pe babúki mobeko—mobeko yango,etúmbu esengeli kozala mpo na yango.26 Pe ekólo oyo esilá kobukamibeko na Ye nyonso. Oh, bazalakina lingomba monene, bazalaki na tempelo. Bazalaki na batomingi ya mayele. Bazalaki na basakoli na ekólo mobimba,bazalaki na biteyelo mpo na bango, ezalaki kobimisa bangolokola na masíni. Bazalaki na basakoli mingi, bazalaki na—na ba-nganganzambe mingi, bazalaki na bakomeli mingi, pebazalaki na ba-losambo mingi, kasi bazalaki mosika na Lilobana Nzambe. Na bongo, Nzambe abengaki moto moko, libanda namilongo na bango, pe atindaki ye náYANGOELOBINKOLO.27 Pe botala ndenge Abatelaka baoyo ya Ye Moko. Libosoya kotinda mosakoli oyo ná nsango, Alobaki: “Eliya, kendekoyebisa Mokonzi Akaba makambo oyo. Bongo, ntango okosalayango, kende mosika na ye noki-noki, mpo Nasili kobongiselayo esika okokende na ntango ya bokauki. Nakobatela yo, Eliya,soki oteyi bobele Liloba na Ngai, sálá bobele likambo Nayebisiyo kosala.”28 Sikawa nakotalisa na elilingi mosala monene oyo, nampokwa oyo, ya Eliya pe eleko ya Eliya, kokokana na eleko tozalina yango sikawa. Nakanisi ete ekokani na yango mpenza. Nazalikokanisa mpo na bikólo…soki ngai…soki tozalaki na ntangoya kozonga sima, kasi nalingi kopesa ntango mingi na molongoya mabondeli.29 Na bongo, soki tokoki kozonga sima pe kosósóla, Yisalaeleabotolaki Palestine na lolenge moko biso tobótólaki États-Unis. Tokótaki na États-Unis pe tobenganaki ba-nkólo mboka,ezalaki ba-Indien, pe tokonzaki mboka yango. Yisalaele peakotaki na Palestine ndenge wana, na bokambami ya Yosua,na bokambami ya Nzambe, abenganaki ba-nkólo mboka peabótólaki mboka yango.30 Pe bakonzi na bango ya liboso bazalaki bazalaki bato nanguya; Dawidi, Salomona, bato minene. Ba-président na biso yaliboso bazalaki bato minene;Washington, Lincoln, pe bamosusu.

Page 7: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 7

Na sima, sukasuka, ba-président to bakonzi bakómaki kobebamoke-moke ntango nyonso, pe sukasuka, basukaki na Akabaoyo. Ndenge moko mpenza, ekokani na eleko na biso. Pebato bakómaki kolanda mpenza makambo ya mikolo oyo kinobaboyaki koyoka Liloba ya Solo ya Yawe.

31 Pe bokoki kokanisa, bato ya makambo ya mikolo ya boye,bakokaki kozua mosali ya solosolo ya Nzambe ndenge nini. “Ee,abelaki libóma, motó na ye ezalaki kosala malamu te. Elokoya ndenge wana ekokaki kosalema te.” Bazalaki basambeli,basambeli mpenza. Bazalaki bato sembo, bazalaki na batosembo. Bazalaki basambeli mpenza.

32 Na bongo, ayebaki ete ekosengela koleka líkindo yamomesano, ekosengela ko—koleka nsango ya momesano,ekosengela koleka koteya Liloba, mpo na kobuka mitemana bango ya mabanga. Ayebaki ete esengelaki na YANGOELOBI NKOLO mpo na kokitisa kosambisama yango likolona libota wana, na bongo ayebaki ete akokende na YANGOELOBI NKOLO. Pe ezalaki mpenza YANGO ELOBI NKOLO.Koboya Yango ezalaki kosambisama. Tozali pe komona yango naeleko na biso. Tomonaka yango na bileko nyonso. Eloko mosusuetikalaka te, bobele kosambisama ntango moto akatisi ndelo yamawa.

33 Sikawa, etaliseli wana, kuna, nde nakokokanisa Eliyaná lingomba lelo, lingomba ya lelo. Azuaki nsango yangobobele liboso ya kosambisama. Eliya, azalaki elilingi, bazuakimokumba na ye na ndenge ya mokili, mpo na bilei na ye ya kolia,mpo mbula elingaki kobeta te, kokokana na Liloba na Nzambe,mibu misato na sanza motoba, to kino Eliya akobengisa yango.“Na ntango nyonso yo Eliya okoloba, yango nde ekosalema.”Yango wana akendeki liboso na mokonzi, pe alobaki: “Atamamwe ekokita te, kino nakobengisa yango.” Ezali mpenza mo—mokumbamonene, boye te? Ezali mpenza nsango!

34 Pe sikawa tokokokanisa yango na bokauki yamolimo ya lelo.Sikawa, biso nyonso toyebi, toyebi yango malamu mpenza, etebokauki monene ezali na mokili lelo, na ngámbo ya molimo. Pe,boyebi, yango esakolámáká na basakoli, ete ekosalema mpenzaliboso na Boyei ya mibale ya Klisto, balobaki: “Nzala ekoya namokili, ekozala bobele nzala ya lipa te, kasi nzala ya koyokaLiloba na Nzambe.” Pe mokolo yango ezali sikawa, “koyokaLiloba ya Solo ya Nzambe.” Sikawa, likambo oyo ezali kotalisabokauki ya nzoto ná oyo ya molimo.

35 Lisumu ná kozanga kondima, na nzela ya balakisi ya lokutaná bato yamikolo oyo kati na lingomba, efungolaki nzela mpo nakosambisama ekoya, oyo ezali koya. Na sima, bapesaki mokongona Liloba na Nzambe námosakoli na Ye, mpo na kolobela Lilobakokokana na líkindo ya mikolo wana.

Page 8: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

8 LILOBA LILOBAMI

36 Botala awa, ezalaka mpenza na ntango wana nde Nzambeatelemisaka ntango nyonso eloko moko. Mpamba te, Ye, ntangonyonso, Asalaka likambo moko te soki Amonisi yango libosonaino te na bato, pe Amonisala yango ntango nyonso na nzelana basali na Ye.37 Sikawa, kasi Eliya, na ntango wana, azalaki na esika yankukú, oyo Nzambe asilaki kobongisela ye kokende kuna. Yangonde likambo tolingi komona sikawa, liboso ya kosala molongo yamabondeli. Eliya azalaki na esika ya nkukú ebongisamanki naNzambe Ye moko. Sikawa, lingomba ebongisaki yango ata mokete mpo na ye, mokonzi abongisaki yango ata moke te mpo naye, amibongiselaki yango ye moko te, kasi Nzambe abongiselakiEliya esika ya nkukú, mpo na koleisa ye na ntango nyonso yabokauki, esika bilei ezalaki kopesamela ye mokolo na mokolo.Azalaki na ntina ya komitungisa te mpo na likambo ekosalemalobi, to komitungisa soki bilei esilaki. Nzambe alobaki: “Napesimitindo na biyanganga pe bakoleisa yo.” Ezali likambo kitoko,elilingi ya esika na biso ya nkukú kati na Klisto.38 Ntango likita ya mokili mobimba pe makambo nyonsoezali kosalema lelo, balobaka: “Ntango ya bikamwa esílákoleka.” Ba-nguya minene ya Nzambe esílá kolongolama namangomba. Ezali komonana lokola bazali lisusu na eloko mokote, bobele “ngonga ekolobaka ngbaa ngbaa pe elonja ekolobakangbengbele ngbengbele”. Toyebi yango ezali solo. “Pe lolenge yakosambela, kasi bazali kowanganaNguya na yango.”39 Ezali ndenge moko na likambo oyo Dawidi asalaki, nantongo oyo, ná makálo ya ba-ngombe, atangwaki mosikana Liloba. Ntango Liloba etalisamaki pe epesamelaki bango,baboyaki Yango; yangowana, batangwakimosika naYango.40 Yango nde likambo bato wana basalaki na eleko ya Eliya,batangwaki mosika na Liloba. Bakanisaki ete bazalaki naLiloba, kasi bazalaki na Yango te. Na bongo, botala, na sima,kati na…41 Na ntango oyo Alingaki kopesa etúmbu na mozangikondima, Abongisaki ekimelo mpo na mondimi. Asalakalikambo yango moko ntango nyonso. Na mikolo oyo Alingakikoboma mokili na mai, Abongisaki ekimelo mpo na Nowa.Na mikolo oyo Alingaki kozindisa Ezipito na mbu, Abongisakiekimelo mpo libota na Ye ékatisa mai-na-mbu. Tala ndengeNzambe abongisaka nzela na Ye! Pe esika nzela ezali te, Ye azaliNzela yango. Ye nde Nzela yango!42 Sikawa tososoli ete tozali liboso ya moko na…na moko naba-ngonga ya motuya koleka, oyo esílá koya na mokili. Na boye,ezali likambo ya missile te, motó ya missile oyo engengaka, ndetosengeli kobanga. Tosengeli kobanga nde mangomba. Tosengelikosenzela ngonga oyo tozali kobika na yango.

Page 9: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 9

43 Sikawa botala, kasi Nzambe abongisaki ekimelo mpo naEliya. Abongisi pe ekimelo sikawa, mpo na bana na Ye bandimi,mpo na kokima nkanda námakambo oyo ezali koya.44 Mpamba te, Nzambe akoki kozala sembo te mpo nakosambisa bato yango pe kopesa bango etúmbu, kozindisaSodoma ná Gomora, kozindisa Kapernaume na kati ya mai-na-mbu, pe kokweisa bato ya ekeke wana, pe Sodoma ná Gomora,na sima átika biso kosala makambo yango moko kozangaetúmbu. Na ntembe te tobongi mpenza mpo na kosambisama,lokola bango pe babongaki mpo na kosambisama. Sikawa,tomoni ete…45 Ntango makambo oyo esalemaki, makambo ya mikolo yaeleko wana, Nzambe atelemisaki moto moko na eleko wana, to,pe, abimisaki moto moko mpo na kobundisa ba-nguya yango,kasi baboyaki koyoka yango. Bakanisaki ete abelaki libóma,“Motó na ye ezalaki kosala lisusu malamu te. Azalaki mobangemoko alekisi-ndelo, zóba moko autá na biliki, zámba ebélisá yelibóma”. Kasi, ata bongo, azalaki na Liloba naNkolo.46 “Liloba elingi koloba te oyo Yango elobi”, yango ndebalobaka lelo. “Oh, ee, Biblia ezali buku ya masolo-ya-kala.”Nabanzi bosílá komona yango, pe bakómi koloba sikawa, ete“Eva aliaki mbuma ya póme te, aliaki nde…” Ezalaki nini?Nakanisi… “Ezalaki mbuma ya abricot”, yango nde bakómikoloba. “Ezalaki mbuma ya abricot.” Pe lisusu, ete “Moseakátisá bana Mai-na-mbu Motane ata moke te. Ezalaki ndezamba monene ya ba-kékélé, kuna na ngambo mosusu ya mai-na-mbu yango, pe akatisaki nde mai-na-mbu ya kékélé”. Boye,ndenge nini mai, m-a-i, esalaki bitutú na ngámbo nyonsomibale;na boye, bakatisaki mabelé ekauki ndenge nini? Oh, ezalimpenza boléma! Kasi, bomoni, esengeli kozala na eleko ya boyempo na kokitisa nkanda ya Nzambe likolo na bato. Esengelimpenza.47 Balobaka ete makambo ya boye ezalaka te, lokola—lokola …Ata bato ya mangomba bandimaka bikamwa te.“Nakopesa yo ba-dollar nkóto,” elobamaka, “lakisa ngaiekamwiseli. Lakisa ngai ekamwiseli!” Ee, bakoki komona yangote, ata makambo nkóto zomi esalemi liboso na bango. Ee, bango,bakomona yango ata moke te.

Okoloba: “Ekoki kosalema te.” Oh, te, ezali yango te.48 Mokolo moko Eliya azalaki na Dotane, pe mampinga ya ba-Síria eyaki kozinga engumba, mpo na kokanga ye, mpo bayebakiete kuna nde nguya ya—ya ekólo wana ezalaki, ezalaki na katiya momóni wana. Ee, mokonzi…Moko na bato na ye ayebisakimokonzi ya Síria, alobaki: “Ee, oyebi, Eliya mosakoli, Motisibi,ye moto ayebisaka mokonzi ya Yisalaele makambo yo olobakana nkukú ya ndako na yo ya kolala.”

Page 10: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

10 LILOBA LILOBAMI

49 Alobaki: “Bókende kozua moto yango! Ye nde azali kotiélabiso nkáká.” Pemampingamobimba ya Síria ekendeki namayelekozinga Dotane. Bango nyonso bazingaki yango.50 Pe Gehazi, mo—mosali ya mosakoli, alamukaki, pe alobaki:“Oh, tata na ngai, mampinga ezingi biso mobimba awa. Bazingibiso bisika nyonso.”51 Alobaki: “Ee, baoyo bazali elongo na biso bazali mingikoleka baoyo bazali elongo na bango.” Bomoni?

Gehazi atambwisaki miso, alobaki: “Nazali komona motomoko te.”52 Alobaki: “Nkolo Nzambe, fungola miso ya mwana mobalioyo.” Pe miso na ye efungwamaki, pe ba-ngomba nyonsoetondaki na Banje ná makálo, bazalaki zonga-zonga, Mampingaoyo emonanaka te.53 Eliya akendeki kuna, pe Biblia elobi: “Abomaki bangomiso.”Akendeki kokutana na bango; abomaki bango miso. Akendekikuna pe alobaki: “Bozali koluka Eliya?”

Alobaki: “Iyo, tozali koluka ye.”54 Alobaki: “Bóya, nakoyebisa bino esika azali”, pe akambakibango na motámbo, esika mpenza mampinga ezalaki libanda pebakangaki bango.55 Sikawa, Biblia elobi: “Abomaki bango miso.” Ekati likambo.Pe lelo bato bakufi mpenza miso na molimo, ata Nkolo Nzambeakiti kati na bato pe asali ata likambo nini, pe makamboAlakaki, bango bakomona Yango kaka te. Basili kokúfa misona molimo; bayebi Nzambe te, bayebi Nguya monene na Yete. Sikawa, tomoni ete basalaki yango na mikolo ya Eliya, pebazali kokoba kosala yango kino lelo. Nzambe abomi bangomiso. Lelo bakómi koloba ete “Bikamwa ezalaka te, makambowana ezalaka te, nyonso oyo ezali kongilima”.56 Balobaki pe bongo mpo na Eliya, mpo, ntango amemamakilikolo pe Elisa azuaki esika na ye, elenge mobali oyo akómakina libandi ya bolenge, bana mike bazalaki kolanda sima na yepe koloba: “Mobange moto na libandi, mpo na nini omatakielongo na Eliya te?” Bomoni, mpo na kobanda, bango bazalakiata kondima Yango te, sima na makambo mingi oyo esalemakimpenza. Pe moto monene ya Nzambe oyo asilaki konetolamakino Likolo na nzela ya likálo na móto, kasi bato bazalakina bango kondima Yango te. Pe batikaki bana mike na bangokolandamoto oyo na sima pe koloba: “Mobange moto na libandi,mpo na nini omataki te?” Bomoni? Na sima, mosakoli alakelakibana yango mabe, pe mama-ngombolo moko ebomaki banayango ntuku minei na mibale.57 Sikawa botala. Lelo, ndenge esalemaki na elekowana, bazalikobakisa ndimbola na bango moko na Liloba. Sikawa, sokibalingi kosala yango, etali bango, kasi bazali koluka kondimisa

Page 11: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 11

biso yango. Biblia elobi: “Liloba na Nzambe oyo esengeli nandimbola yamotomoko te.”Nzambe alimbolaka Yango Yemoko.Nzambe akokisaka Liloba na Ye, yango nde ndimbola na Yango.Ndenge nalobaka yango mbala mingi, na ebandeli Alobaki:“Tika polé ézala”, pe polé ezalaki. Yango ezali na ntina yandimbola moko te; esalemaki. Alobaki: “Mongondo akokumbazemi,” akumbaki yango. Alobaki ete “akosopa Molimo na Ye,”Asalaki yango. Pe Alobaki ete “na mikolo ya suka”, makambooyo Akosala, pe Azali kosala yango! Ezali na ntina ya ndimbolamoko te; Nzambe azali kolimbola Yango Ye moko. Ata bato yaboléma balobi nini, ekopekisa Nzambe atamoke te.58 Ntango Yesu azalaki na mokili, Akutanaki na kozangakondima monene ndenge tozali na yango lelo, pe ntango mosusukoleka. Kasi etelemisaki Ye te; Akobaki kosala pe kokokisalotómo na Ye, pe Nzambe azalaki kokokisa nyonso oyo Azalakikosala. Alobaki: “Nazali Ngai moko te. Tata na Ngai ná Ngaitozali moko; Afandi kati na Ngai. Ngai moto Nasalaka misala te,ezali Tata oyo afandi kati na Ngai. Soki Nazali kosala misala naYe te, boye bondima Ngai te; kasi soki Nazali kosala misala, atabondimi Ngai te, bóndima misala.” Bomoni? Na elobeli mosusu,yango… “Boluka-luka na Makomi,” Alobaki, “mpo na yangonde bobanzi ete bokozua Bomoi na Seko, na nzela ya koyebaMakomi. Pe Makomi Yango mpenza nde etatoli mpo na Ngai.”Amen! Oyo nde maloba! “Yango nde, Makomi, ekoyebisa binoNani Ngai nazali,” Yesu alobaki.59 Pe ezali Makomi nde ekoyebisa bino ntango tozali kobika nayango. Pe makambo oyo bozali komona kosalema, ezali NzambeYe moko kati na libota na Ye. Eloko moko te ekoki kosekwisabakufi, bobele Nzambe. Eloko moko te ekoki kosala makamboAzali kosala sikawa, bobele Ye. Mpo Biblia elobi: “Azali motindomoko lobi, lelo pe libela.”60 Sikawa, na boye, tozali komona lolenge ya mikolo oyo yabato : “Oh, ntango wana esílá koleka, eloko lokola bikamwaezalaka te. Bato yango bamitikaka kokambama na makanisi nabango moko.”61 Boyoka Eliya yango, mosakoli, kogángela bango ná batoya líkindo na bango. Botala, botala, alobaki lokola azalakiNzambe Yemoko. Eliya alobaki lokola azalaki Nzambe Yemoko:“Mamwe ekokweya longwa na likolo te soki nabengisi yangote.” Amen! Iyo, misie. Mosakoli yango aumeláká mingi mpenzaLiboso na Nzambe!62 Basakoli ya Kondimana ya Kala, to eleko nyonso mosusu,babikaka Liboso na Nzambe kino bakómaka Liloba, pe Nsangona bango ezalaka Liloba Yango moko. Pe, bomikanisela,alobaki: “YANGOELOBINKOLO.” Ntango bato yango bazalakikozalaki na ba-nsango yango longwa na Nzambe, bazalakikozingama mpenza na lolenge ete makanisi na bango moko…

Page 12: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

12 LILOBA LILOBAMI

Ekokaki kotelemela makanisi na bango, bakokaki ntangomosusu ko—kozanga makoki ya kososola yango malamu. Kasibazalaki kolobaLiloba naNzambe: “YANGOELOBINKOLO.”63 “Mbula ekobeta te, soki nabengisi yango te.” Oh, malobanini boye! Autaki Liboso na Nzambe, pe atatolamaki mpenzampenza. Pe, bomikanisela, ezali pe kolandana ná Amosa 3:7:“NkoloYawe akosálá likambomoko te bobele eteÁmonisa yangoliboso na baombo na Ye basakoli.” Alobaki: “Mbula moko teekotikala kobeta!” Liboso ye…64 Basekaki ye, bakanisaki ete abeli libóma: “Alekisi mpenzandelo!” Kasi, bomoni, azalaki na YANGO ELOBI NKOLO,ete mbula ekobeta te. Pe Nzambe, liboso na ye kosala yango,Amonisaki yango na Eliya, mosali na Ye. Pe azalaki mpenzamosakoli oyo atatolami pe andimisami, bongo bato basengelakikobongola motema. Kasi, esika na yango, basekaki ye, balobaki:“Oh, tozangi mbula te! Bibombelo etondi maa. Bibale na bisoezali kotiyola malamu.”65 Biblia elobi ete: “Ata mamwe ekweyaki te, mibu misato nasanza motoba.” Mikele nyonso pe mai nyonso ekaukaki, bisikanyonso. Ezalaki moto yango te, ezalaki Nzambe koloba na nzelaya moto yango. Yango nde “Ngai” oyo elobamaki. Toyebakayango ntango nyonso. Na bongo, ye…66 Tomoni ete ntango moto ayei, atindamá na Nzambe,abongisámá na Nzambe, ná YANGO ELOBI NKOLO, nsango námotindami bazali moko pe motindo moko. Mpamba te, atindamimpo na kotalisa YANGO ELOBI NKOLO, Liloba na nzela yaLiloba, na bongo ye ná nsango na ye bazali motindomoko.67 Moto ya ebongiseli oyo akambámi na ebongiseli, ye nálingomba bazali “moko”. Moto na líkindo na nse ya líkindo oyoesalemi na ebongiseli, ye ná nsango na ye bazali moko; lingombaya líkindo, moto na líkindo. Ezali mpenza bongo.68 Na boye, soki moto ayei ná YANGO ELOBI NKOLO, ye náNsango bazali moko. Ntango Eliya ayaki ná YANGO ELOBINKOLO, ye ná nsango na ye bakómaki moko. Ndenge moko naYesu, ntango Ayaki, Azalaki Liloba, Yoane 1. Na bongo, Lilobana Nzambe ná motindami ya eleko yango bazalaki mpenza elokomoko, ntango nyonso. Ezali solo.69 Yesu azalaki Liloba oyo esakolamáki. Azalaki likambo oyobasakoli balobáki ete ekosalema: “Mongondo akokumba zemipe akobota Mwana oyo.” Kuna na ebandeli mpenza, Nzambealobeláki bango, ete: “Momboto ya mwasi akotuta motó yanyoka, pe ye akoswa litindi na ye.” Masakoli nyonso wanaepesamáká. Dawidi agángaki, basakoli mosusu nyonso, kati nabileko, balobeláki Ye. Azalaki komonisama ya Liloba wana!Aleluya!70 Sikawa bomoni esika nalingi kokóma? Nalobelaki binopolele mpenza na ntongo oyo. Bozali komona te bokonzi ya

Page 13: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 13

Nzambe na bomoi kati na Lingomba ya bomoi, Mwasi na libala?Babeli bazali kobika, bakufi bazali kosekwa, batengumi bazalikotambola, bakufi miso bazali komona, Nsango-malamu ezalikoteyama na nguya na Yango, mpo Nsango ná motindami bazalimotindomoko. Liloba ezali kati na Lingomba, kati namoto.71 Liloba na Nzambe ezalaki kati na Eliya, ntango amatákikuna ná YANGO ELOBI NKOLO, pe alobaki: “Mbula ekobetate.” Ezalaki Eliya te; ezalaki Nzambe kati na Eliya.72 Nalobaka yango mbala mingi, ndenge mwasi ya ScienceChrétienne ayebisáká ngai, mokolo moko. Nalobelaka yangombala mingi. Alobaki: “Misie Branham, okumisaka Yesu mingikoleka.”

Nalobaki: “Nabanzi ete yango nde likambo moko oyonakosamba mpo na yango.”

Alobaki: “Olukaka kokómisa Ye Nzambe.”

Nalobaki: “Azalaki Nzambe.”73 Alobaki: “Oh, Azalaki mosakoli, Azalaki moto malamu, kasiAzalaki Nzambe te.”74 Pe nalobaki: “Ee, lakisa ngai Likomi moko oyo elobi eteAzalaki yango te.”75 Alobaki: “Na Buku ya Yoane, ekomami ete ‘Alelaki’, ntangoAkendeki na nkunda ya Lazalo.”76 “Ee,” nalobaki, “ya solo, Alelaki. Azalaki mbala mokomoto pe Nzambe. Azalaki moto ntango Alelaki; kasi Asengelakikozala Nzambe mpo na kosekwisa mokufi.” Ya solo. Nalobaki:“Azalaki moto, ná nzala; kasi Azalaki Nzambe ntango aleisakibato nkóto mitano, ná mápa mibale ná mbisi mitano.” Ezalisolo. “Azalaki moto ntango aláláki sima ya bwáto; kasi ezalakiNzambe kati na Ye nde akokaki kofandisa mai kimia.” Mpo nanini? Ye ná Nsango na Ye bazalaki moko.77 Alobaki: “Ngai ná Tata na Ngai tozali moko. Tata na Ngaiazali kofanda kati na Ngai.” Azalaki litondi ya Bonzambe katina nzoto.78 Namoni ete ezalaki mpenza likambo makasi, mokolo wana,ntango nazalaki koteya Bileko Nsambo Ya Lingomba. Elokoya liboso, na—nakokaki kososola te ndenge Yesu azalaki wananá…námpembe wana likolo na Ye, ndenge wana, ekomami ete:“Suki na Ye ezalaki mpembe lokola léni.” Nakokaki kososolate ndenge nini moto ya mibu ntuku misato na misato akokakikozala na suki ya mpembe pee.79 Nabengaki moto ya líkindo ya malamu moko, moto nalíkindo ya ba-Pantekotiste, moninga na ngai yamalamumpenza.Ee, ezalaki Ndeko Jack Moore. Azali moto ya mayele mingimpenza. Alobaki: “Ndeko Branham, ezalaki Yesu akembisami.

Page 14: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

14 LILOBA LILOBAMI

Ezali lolenge Akómaki sima na Ye kokembisama.” Te, nakokakikondima yango te. Te.

Na—na—nalobaki: “Ee, NdekoMoore, natondi yo.”80 Nakotaki na eteni ya ndako kuna, pe nabandaki kosololana Nzambe. Nalukaki na concordance na ngai mpo na kozongana Daniele esuka elobameli Ye lisusu, ete: “Ayaki epai naMokóló na Mikolo, Oyo suki na ye ezalaki mpembe lokola léni.”Nalobaki: “Nkolo, na—na—nayebi likambo ya koloba te, penazali na mokumba yango.” Sikawa, ezalaki liboso na bi-…bómikanisela, liboso Bilembo Nsambo éfungwama, pene namobu mobimba to koleka, liboso. Kuna, nazalaki kobondela:“Nkolo, ezalaki nini?”81 Natalaki, pe namonaki liboso na ngai, moto moko atelemaki,azalaki zúzi, pe alataki suki ya mpembe. Bazúzi ya ntangoya kala bazalaki kolata suki ya mpembe, mpo na kotalisa eteazalaki na bokonzi likolo na nyonso.82 Na boye, ntango namonaki Yesu ná suki ya mpembe,nalobaki ete ezali bobele kokokisa solo oyo toyebi, ete Azalina Bokonzi likolo na Nyonso. Nzambe atatolaki likambo yangomoko likolo na Ngomba ya Mbongwana, pe alobaki: “Oyoazali Mwana na Ngai molingami, bóyoka Ye, Bokonzi likolo naNyonso!”83 Na sima, kuna na ebandeli ya Bilembo Nsambo, ntangoBanje nsambo yango bakitaki na lolenge ya pyramide, bazalakiwana pe bayebisaki ngai ete názonga awa mpo na koteyaBilemboNsambo yango, ete Akozala elongo na ngai pe Akotalisangai makambo oyo ezalaki, makambo oyo ebungaki. Nazalákákokanisa ntango nyonso ete ekangamaki na sima ya Buku, peekozala eloko oyo ekomamaki na Buku te, kasi esalemaki eteeyebanaki ete Akoki kosala bongo te. Ezali te eloko oyo ekomamina Buku…Ezali eloko oyo ebombamaki kati na Buku. “Mpomoto nyonso akolongola Liloba moko na Yango to akobakisaliloba moko na Yango…” Na bongo, ezali libombami oyoezalaki na Buku kati na bileko nsambo ya lingomba. Mokona moko na yango ebimisaki li—libombami moko, makambonyonso likolo na libatisi namai námakambomosusu nyonso, oyobatátábánáki na yango ntango nyonso oyo.84 Na sima, ntango emataki likolo, bitáleli ya minene, longwamosika na Californie, kino na Mexique, na Tucson, bisikanyonso, bakangaki Yango fotó. Ezalaki eloko ya kotala na misoya kokamwa. Ndeko Fred Sothmann oyo kuna, oyo afandi kunana sima, ná ngai náNdekoGeneNorman, tozalaki wanampenza,ntango Yango emataki likolo. Bazuaki fotó yango, kasi kino lelobayebi ntina ya likambo yango te. Esili koleka ntangomoke awa,bato nyonso bazalaki koloba: “Bótala awa. Ezali lokola elokoboye, námapapu ya Banjewana, ndenge ekangami kuna.”

Page 15: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 15

85 Mokolo moko, nabalolaki yango na ngámbo ya mobali,nazalaki kotala, Yesu Klisto azalaki wana mpenza lokolaHofmann ayémáká Ye. Azalaki wana, ná suki ya mpembe,akitisakimiso na nse kotálámokili, kotálisa ete Azali na Bokonzilikolo na Nyonso. Likolo elobi yango, Biblia elobi yango, Nsangoelobi yango, nyonso motindo moko. Bokonzi likolo na Nyonso,ná suki ya mpembe; bozali komona mandefu na Ye ya moindona nse. Mingi kati na bino basílí komona fotó yango. Tozalina yango kuna na sima. Bóbalola yango na ngámbo ya mobali,na pembeni, bótala yango. Ye wana, ebongi be mpenza ndengeezalaki, soki bakangáká Ye fotó. Bazali kotala yango na ngámboesengeli te. Bosengeli kotala yango na ngámbo esengeli. Pebobele Nkolo Nzambe akoki komonisa ngámbo esengeli. Balóláyango na ngámbo ya mobali pe tala yango. Ye wana, ndengeesengelakimpenza kozala soki bakangáká yango fotó kuna.86 Mbala ya liboso namonáká Ye, Azalaki lokola Motó ya…Hofmann. Namonáká naino yango te. Na mongombo ya BillySunday, ebele na mibu na sima, namonaki yango. Kobandawana, nazángaka fotó yango na ndako na ngai atamoke te.87 Na sima, awa na mipepe, nalobi ete, Nzambe moko oyonamonáki na emononeli awa, ezalaki ngai naino mwana moke,awa pembeni na eteyelo oyo, Akokanaki na yango. Pe awa naLikolo, sima na mibu ntuku misato na misato, etatoli yango,ete ezali solo. Azali mpenza na lolenge wana; ezali likambo yamabanzo ya likanisi ya moto moko te.88 Ndakisa na Vatican, bazali na—na—na liyemi moko yaKlisto kuna, ná mwa libungutulu ya mandefu ya mpembeto libungutulu ya mandefu na mbángá na Ye, na molai yacentimetre moko, ezali zonga-zonga na monoko na Ye, lokolaboye, pe babengi yango Klisto.89 Ezali kokanisela ngai mosali ya ntóki moko ya Greki,namonáká mokolo moko na cathédrale ya kala, kotalisa ndengeAdama ná Eva bazaláká; bazaláki lokola ba-nyama to elokomoko. Yango nde likanisi ya bomoto ekoki komona na likamboya molimo. Ngai nakanisi ete Adama azalaki mobali ya kitokokoleka nyonso esílá kozala na bomoi, pe Eva azalaki mwasiabongi be na lolenge nyonso.90 Sikawa makanisi ya bomoto ebongisaka Likambo kokokanana makanisi na bango moko, na sima Nzambe atindakape afungolaka Likambo yango na Nguya na Ye. Yango ndeesalemaki mpenza awa na eleko ya Akaba.91 Sikawa, tomoni ete Eliya akokaki koloba yango,mpoNsangoya eleko ná Liloba na Nzambe…Motindami, Nsango—Nsangoná Liloba, ezalaki mpenza eloko moko. Mosakoli, Liloba,Nsango; motindami, Nsango, ná Nsango, ezalaki motindo moko.Yesu alobaki: “Soki Nazali kosalamisala oyo ekomamakimpo na

Page 16: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

16 LILOBA LILOBAMI

Ngai te, na boye bóndima Ngai te.” Ezali malamu. Moto nyonsoná nsango na ye bazali moko.92 Yango wana lelo bazali kondima te likambo ya kosala misalayaNzambe, mpo bazali koyambaNsango yaNzambe te. BandimiNsango te.93 Kasi baoyo bandimeli ntango ya Nzambe oyo tozali kobikana yango, makambo oyo ezali Bilei ebómbámá. Bókanisa naino,Nzambe abómbáki Yango mpenza na lolenge ete bazali kotalaYango na miso kasi bazali komona Yango te. Ndenge mokoEliya abomaki miso ya mampinga ya Síría. Ezali ndenge mokooyo Nzambe abomi miso ya mozangi kondima, mpo na Bilei yasolosolo ya mwana, mondimi.94 Likambo oyo babengaki Nowa “molekisi-ndelo”, ntangoazalaki kotonga masuwa, miso na ye ezalaki polele na Lilobana Nzambe pe na elaka. Eloko mpenza oyo bango babengakimolekisi-ndelo, yango nde ebikisaki Nowa ná libota na ye.Bomoni, eloko yango mpenza. Likambo oyo bato bazali kotiola,ezali yango nde biso tozali koluka na mabondeli. Eloko oyo batobabengaka “boléma”, biso tobengaka yango “Monene!” Elokomokili ebengaka “monene”, Nzambe abengaka yango “boléma”.Pe oyo mokili ebengaka “boléma”, Nzambe abengaka yango“Monene!” Yango ezali mpenza bokeseni kati na Malamu námabe. YesuKlisto azali motindomoko lobi, lelo pe libela.95 Bomikanisela, akendeki esika na ye ya nkúku kokokana namwango ya Nzambe, kokokana na mbéla ya Nzambe, pe Lilobana Nzambe. Eliya akotaki na esika na ye ya nkúku kokokana naboyebi-liboso (mwango) ya Nzambe, pe mbéla ya bomoi na ye, pekokokana na Liloba. Soki biso tokotaki lolenge wana te, nayebite ndenge nini tokómi wana.96 Pe botala, liboso bokauki ébanda, Eliya akotaki esika yankúku yango, mpo na bomoi na ye. Etaliseli malamu mpenzaete liboso kosambisama ébanda kobeta mokili, Lingombaekobéngama kobima, Mwasi na libala asili koponama, pe azalikozela liboso kosambisama ébeta. Asili kobanda kozela, azalikolia Bilei ya Nzambe, kosepela namapamboli ya Nzambe. Motonyonso oyo motó na ye ezali kosala malamu ayebi ete tozalikokende sémba, tobélémi na ntango ya kosambisama.97 Botala! Ndeko Banks, mingi kati na bino bato bozali awana mpokwa oyo, bozalaki kuna, likolo na ngomba yango, nantongo wana.98 Pe nalingi kolobela ngomba yango na ntongo ya lomingoekoya, soki Nkolo alingi. Nazuaki emoniseli monene, likambomoko ebakisami, oyo, na mpasi na motema, nakoki kolobelabino yango te na mpokwa oyo. Kasi nazali na…Bomoni? Peezali kokoba kosalema, ntango nyonso, likambo moko sima namosusu. Bomoni? Ekotika kosalema ata moke te, mpo ezalakiYANGO ELOBI NKOLO.

Page 17: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 17

99 Moko namoko na bino nyonso awa, mbala nkóto na nkóto naba-bande, bosila koyoka ngai koloba: “YANGO ELOBI NKOLO,ekosalema boye na boye.” Pe ata ba-zulunále ná ba-magazineesengeli kotatola ete ezali solo. Bayebi te likambo nini nyonsowana elingi koloba, kasi bamonaki yango. Bayebi likambo yangote, kasi bamonaki yango, kotatola ete Liloba ezalimpenza solo.

100 Tozalaki awa na ebale, mokolo oyoMwanje naNkolo akitaki,eleki mibu ntuku misato na misato, to esalemaki na mobu 1933,akitaki pe alobaki makambo oyo Alobaki. Ntango nabimaki,bato mingi bazalaki kuna na libóngo, pe balobaki: “Elingakikoloba nini, Billy?”

101 Nalobaki: “Ezalaki mpo na ngai te; ezalaki mpo na bino.Ngai nandimá; bino te.” Pe nakobaki na ngai kokende.

102 Na sima, mokengeli alobaki na ngai, alobaki: “Olingi kolobaete yo, ná boyebi ya kelasi ya école primaire, okokende na mokilimobimba kobondela mpo na ba-nkúmú, bayángeli, bakonzi pebongo na bongo? Pe, oh,” alobaki, “bósana Yango!”

103 Nakokaki kobosana Yango te, Ekomamaki na motema nangai lokola libanga. Sikawa botala, sima na mibu ntuku misatona misato, nyonso oyo Alobaki ekokisami mpenza ndengeAlobaki ete Akosala yango. Azali Nzambe pe akoki kokweya te.Akokisaka ntango nyonso Liloba na Ye. Ye…Bótia ntembe naYango ata moke te.

104 Sikawa, botala, akotaki kokokana na mwango ya Nzambe(boyebi-liboso), mbéla ya Nzambe pe Liloba na Nzambe, peakotaki liboso bokauki ébanda.

Sikawa, toyebi ete etikali moke kosambisama ébeta.

105 Likolo na ngomba mokolo wana, elongo na Ndeko BanksWood oyo azali awa, tozalaki komata ngomba. Ntango mosusunakoloba yango lisusu, mpo ékólisa kondima na bino, mpona molongo ya mabondeli oyo elingi kosalema sima na minítizomi to zomi na mitano. Nazalaki kotambola liboso ya NdekoBanks. Azalaki…Nakanisi ete akendeki ntango Ndeko mwasiRuby azalaki kobéla. Azalaki koya sima na ngai, namonakiete elongi na ye ezalaki motane. Nazongisaki miso na sima.Namilobelaki ete ntango mosusu komata ngomba ezalaki mpasimpo na ye, na bongo nakómaki kotambola malembe. Kuna nabiliki yango, komata ba-ngomba lolenge wana, esika Banje naNkolo bamonanaki. Tozalaki kokende sémba na ngámbo yango,esika Bamonánáká, mwa ba-sanza liboso.

106 Pe wana nazalaki komata ngomba, Molimo na Nzambe…Ntango nabalukaki, natalaki likolo na ngomba, Alobaki:“Lokota libanga wana, pe lobá na ye: ‘YANGO ELOBI NKOLO,okomonaNkembo naNzambe sima na ngongamoke.’”

Page 18: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

18 LILOBA LILOBAMI

107 Nalokotaki libanga yango, pe nalobaki: “Ndeko Banks,nayebi te mpo na nini,” nabwakaki yango likolo pe nalobaki:“YANGOELOBINKOLO, okomonaNkembo naNzambe.”

Alobaki: “Ezalaki mpo na Ruby?”108 Nalobaki: “Te, nandimi te ete likambo yango etalaki mokona bino, Banks to Ruby. Nakanisi ete Elobaki bobele: ‘YANGOELOBINKOLO, likambomoko elingi kosalema.’”109 Na ntongo elandaki, ntango tozalaki naino kuna, batomingi, nayebi te bati boni bazali awa sikawa, tozalaki batozomi na mibale, to zomi na minei, zomi na mitano oyotofandaki wana. Mbala moko, motei moko ayaki epai na ngai pealobaki: “Ndeko Branham,” alobaki, “nkombo na ngai Songolo.”Alobaki: “Nazalaki moko na babongisi mayangani na yo naCalifornie.”110 Nalobaki: “Nasepeli komona yo, misie.” Douglas McHughes.Alobaki: “Nazali…” Nalobaki: “Nasepeli komona yo.”Topesanaki mbote ya loboko.111 Alobaki: “Ee, sikawa, nalingi kotuna yo motuna moko.”Alobaki…Roy Roberson, azali moyangeli awa; Ndeko Wood,Terry ná Billy, ná, oh, Ndeko McAnally, pe nayebi lisusu baoyonyonso bazalaki kuna te. Pe ngai…Alobaki: “Nalingi kotuna yolikambo moko.” Alobaki: “Nkolo apésaka yo pe mamónó bisikaya libanda lokola oyo?”112 Nalobaki: “Iyo, ndeko, kasi nayaka awa, lokola mpo nakokima yango, mpo na kopéma.”

Natalaki pembeni boye, pe namonaki monganga moko yamonene kotala ye, alobaki: “Rev. McHughes, etikali moke,allergie oyo ezali na liso na yo ekoboma liso yango. Nasalisi yomibumibale, kasi nakoki kosala lisusu elokomoko te.”

Nabongwamaki epai na ye. Nalobaki: “Ntina otunaki ngaiyango, ezali mpo monganga na yo ayebisaki yo, mokolo wanaete: ‘Ozali na allergie na liso na yo.’” Ezalaki na moi, na ngongaya zomi na moko, pe azalaki kolata matalatala ya moi. Nalobaki:“Ntina; ozali kolata yango mpo na moi te, kasi mpo na liso na yo.Ayebisaki yo ete ‘liso yango ekokufa’.”

Pe abandaki kolela, alobaki: “Ezali solo.”113 Nabalukaki mpo na kokende kotambola lisusu, nazalaki napáu na loboko. (Pe natalaki; namonaki ye wana azali kotala ngai,miso na ye ezalaki kongenga.) Nalobaki: “Kasi YANGO ELOBINKOLO, liso yango ekokufa te.” Nauti na bokila elongo na yena automne eleki, akoki komona malamu koleka ngai pe kolekaetonga na biso nyonso wana. Kasi ye…114 Pe namonaki mobange mwasi moko kokitisa soséti-ya-molaina ye pe komatisa ngámbo ya jupe na ye. Alobaki: “Mwana nangai, soki omoni Ndeko Branham, yebisa ye ábondela mpo na

Page 19: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 19

makolo na ngai.” Pe natalaki yango, pe mwa…ezalaki lokolaba-tumeursmike-mike namakolo na ye, zinga-zinga na yango.115 Nalobaki: “Mama na yo azali na suki ya pembe. ‘Mwana nangai’, omoni. Ayebisaki yo, liboso na yo kolongwa, ete soki omoningai, óyebisa ngai nábondela mpo na makolo na ye. Azali likolona ba-tumeurs mike-mike, likolo na makolo na ye.” Alingakimpenza kokweya sénza.

Alobaki: “Ezali solo.”Nalobaki: “Yebisa ye ámitungisa te. Nyonsowana ekosila.”

116 Nabandaki kotambola zinga-zinga. Na sima nayokakiMongongo naNzambe koloba, ete: “Bókima, noki.”

Roy Roberson azalaki wana, koyéba ete azalaki mobundi-etumba-ya-kala, nasimbaki ye na lipeka, nalobaki: “Ndeko Roy,bómbama, noki-noki mpenza!”

Alobaki: “Likambo nini?”Nalobaki: “Kíma! Bómbama!”

117 Pe nabandaki kotambola zinga-zinga, nakitisaki páu nangai, nabalukaki, nalongolaki ekoti na ngai. Pe Ye wana ayáki,Nkembo naNzambe ekitaki na ekumbaki oyo epasolaki mopanziya ngómba, ndengewana, engulumaki pe eningisaki esika yango,ndenge wana, ekátáki nsóngé ya ba-nzete ya mike; pene nacentimetre ntuku libwa to mokama na ntuku mibale, mokamana ntuku mitano, likolo ya motó na ngai. Emataki lisusu lokolamolongósi, ndenge wana; Engulumaki lisusu. Pe, Ezóngaki,mbala misato.118 Na sima, ntangoEkendeki, nambala yamisato, NdekoBanksakómelaki ngai, alobaki: “Yango nde likambo ozalaki kolobela?”

Nalobaki: “Iyo.”Alobaki: “Ezalaki nini?”

119 Nalobaki: “Nzambe amónanaka kati na ekumbaki.”Nayebaki te soki Alingaki nálobela bato to te.120 Na bongo nakendeki kobondela mwa moke. Na simaAyebisaki ngai ete nakokaki kolobela bango. Nalobaki:“Kosambisama ekobéta Libongo ya Westi.” Bótala yango lelo!Bótala likambo esalemaki ba-ngonga moke sima na yango:Alaska ezindaki. Pe sikawa mobimba na yango ekozinda. Tozalikokota na kosambisama.Mawa esili kobwakama.121 Kasi matondi na Nzambe, tozali na Bilei ebombámá, Bileiya molimo, tozali kobika na bolamu pe mawa ya emoniseli yaYesu Klisto na ntango oyo ya suka, Ye moko azali komitatolakati na bato na Ye. Amen! Bakotaki. Eliya akotaki libosobokauki ébanda.Matondi naNzambe ndenge tosili kokota libosokosambisama ébanda. Oyo ezali ntango ya kobima pe kokota,kobima na bibongiseli yango pe kokota kati na Klisto, ntango yakobima pe kokotampo na bandimi ya solo nyonso.

Page 20: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

20 LILOBA LILOBAMI

122 Na boye abengamaki pe atikalaki kuna na kati.Bomikanisela, abimaki na mokélé yango te kino Nzambeabengaki ye.

123 Pe sima na bokauki kokóma pene ya kosila, Abengaki yempona kobima kuna, mpo na kokende na ndako ya mwasi-mokufeli-mobali. Bótala, Abengisaki mwasi-mokufeli-mobali yango. Pemwasi-mokufeli-mobali yango asangánáká na bazangi kondimate; baoyo bazuaki elembo ya nyama na ntango ya bokauki.Na bongo, Abengaki mwasi yango kobima mpo na…AbengakiEliya mpo na koléisa mwasi-mokufeli- mobali yango. Batikalakibobele na mokáté moko, eloko moko moke oyo azalaki kobatela.Pe Eliya alobaki: “Pesa ngai naino yango liboso. Mpo, YANGOELOBI NKOLO, mbeki ya fúfú ekosila te, pe molangi ya mafutaekokauka te, kino mokolo Nkolo Nzambe akotinda mbula likolona mabélé.” Kopesa Nzambe esika ya liboso, Liloba na Ye esikaya liboso!

124 Bótala, fúfú ezalaki kati na mbeki. Mbala nyonso azalakikokende kozua fúfú, fúfú ezalaki kati na mbeki. Mafuta ezalakikati na molangi, mbala nyonso azalaki kokende kozua yango.Mpo na nini? Fúfú ezalaki kotalisa Klisto, na mbeka-ya-fúfú.Ba-mbuma esengelaki kozala ya malamu mpenza, mpo nyonsoénikama. Mbuma moko na moko ya fúfú yango ezalali mpenzandenge moko, kotalisa ete Azali motindo moko lobi, lelo pelibela. Ezalaki Liloba, Lipa ya Bomoi oyo elandaka nsango, mpona kotatola Liloba.

125 Ezali pe bongo lelo, baninga. Ezali pe bongo lelo, Lipaya Bomoi oyo bana bazali kolia ezali kolanda Nsango yaNzambe, mpo na koléisa bango na ntango ya bokauki. Elokonini ekosalema soki Azali elongo na biso lelo? Eloko niniekosalema soki Azali elongo na biso sika-sikawa? Akosalamakambo pe akosala mpenza ndenge Asalaki ntango Azalaki nanzoto awa na mabélé. Mwasi-na-libala azali eteni ya Mobali nalibala, Lingomba ezali ndenge moko na Klisto. “Misala mizaliNgai kosala, bino pe bokosala yango.” Pe Liloba nde esalakiyango. Ayebisaki biso ete makambo oyo Ye asalaki, biso petokosala yango.

126 Tomoni lisusu awa ete, soki Liloba ezali kati na biso peekómeli biso ndenge Esalaki na Eliya na eleko wana, Ekosalankúkúmakambo yangomoko oyo ye asalaki, azalaki kolia Bilokoya ya Nzambe, oyo ebómbámaki na mokili. Oh! Lisusu, yangoezali kokomisa Nsango ná motindami eloko moko. Bilei yamolimo ebongisami, pe Ezali sikawa na eleko na yango. Pe mokona moko na bino akoki kozala na Bilei oyo, soki bolingi Yango,soki bondimi kokabwana na kozanga kondima nyonso ya elekooyo, soki bobelemi mpo na kokota kati na Klisto, kokota kati naelaka na Ye.

Page 21: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 21

Pe bómikanisela bilaka na Ye, na Malaki 4, na Luka 17:30,pe na Yoane 14:12, pe Makomi mosusu mingi, oyo balobeli, Yoele2:38, pe nyonso oyo Akosala, to, nde 2:28, makambo Akosala namikolo oyo ya suka. Pe ndenge mosakoli alobaki ete Pole ekozalana mikolo oyo ya suka, ndenge Ekosala, makambo Ekosala,Makomi nyonso oyo ezali kolobela mikolo oyo ya suka. Pe ezaliKlisto! Soki bokoki komibomba kati na Yango sikawa, na Esikaya nkukú wana, bokolia pe bokomona bolamu pe mawa yaNzambe. Soki bozali na bokono, kobikisama ezali wana.127 Bomikanisela ntango Elisa, sima na mikolo, akitisaki…Sima na ye kozala na mbeka-ya-fúfú, Klisto, pe sima na koléisandako ya mwasi-mokufeli-mobali na Yango. Botala, sima namikolo, ntango akitisaki móto longwa na likolo, pe nyonso wana,atalisaki ete atindamaki naNzambe,Molimo yamosakoli.128 Botala, kati na biliki, ntango aláláki kuna na nse ya nzeteya letáma, Mwanje moko akitaki ná lolenge yango moko ya fúfú,alambaki mokáté pe aleisaki ye. Pe sima na mwa ntango moke,Alalisaki ye lisusu mpongi, pe alamusaki ye, azalaki na mikátéya kolamba mingi mpo na ye. Pe na makasi azuaki na mikátéyango, atámbolaki mikolo ntuku minei. Nkembo na Nzambe!Azali motindo moko lobi, lelo pe libela. Oh, tolingaka Ye mingi,Bilei ya molimo na eleko na Yango!129 “Ezali malamu te kozua lipa ya bana pe kopesa yango naba-mbwa.” Yesu alobaki likambo yango moko te na mwasi mo-Sulapoinika? Atindamaki na baoyo na Ye. Ezali solo. Pe na bangonde Ayaki…Akendeki na bato naMabota atamoke te.130 Pe sikawa, lelo, Ayei kotala bato na Mabota na eleko nabango, pe ezali malamu te…131 Okoloba: “Mpo na nini Nsango ekei na bisika minene oyo te,namayanganiminene oyo, lokola kati na bibongiseli?”132 Ezali Bilei na bango te. Ezali Bilei ya lingomba, ya nkombo,te. Ezali Bilei ya Mwasi-na-libala. Ezali Bilei ya molimo naeleko. Ekopesa bango mpasi na libumu. Ezali na vitamíne mingikoleka mpo na bango. Bomoni? Bomoni? Bo—bo—bokokokakosala yango te. Kasi, mpo na bana, Ezali Lipa, Ezali Bomoi,Ezali YesuKlisto, motindomoko lobi, lelo pe libela.133 Ntango ekoleka mingi soki tobandi molongo ya mabondelisikawa te, na bongo tógumbamitó mwamoke.134 Nzambe molingami, Bilei na ntango ebongi, Bilei ya molimo.Likambo oyo mokili eyebi eloko moko te. Koyoka Nkolo na bisokoloba na mpokwa wana, to mokolo wana kuna na Samalia,esika yango moko oyo Elisa atelemaki pe alobaki: “Ee, mamweekokweya te soki nabengisi yango te.” Yesu azalaki wanakosolola na bayekoli na Ye.

Balobaki: “Molakisi, mpo na nini Olei te?”Alobaki: “Nazali na Bilei oyo bino boyebi te.”

Page 22: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

22 LILOBA LILOBAMI

135 Ya solo, Nkolo, Bilei na Ye ezalaki kosala mokano yaNzambe, komona misala na Nzambe kokokisama na eleko naYe. Azalaki kuna mpo na komona ete ésalema. “Nasalaka elokomoko te, soki Tata na Ngai alakisi Ngai yango te liboso. Oyo Tataalakisaka Ngai, Nasalaka yango.”136 Pe, Tata, ezali pe bongo lelo. Lingomba, mondimi ya solo,Nzoto ya bandimi, ezui nzela ya kozala na Bilei, Bilei ya molimo,oyo bato ya bibongiseli bayebi eloko moko te na yango. Mokilieyebi eloko moko te na Bilei oyo, Tata. Kasi Lingomba na Yo,bato naYo,Mwasi-na-libala yaMwana naYo alingakaYango.137 Tozali na nzela mpo na lobiko ya nzoto na biso, sokiminganga bakoki te. Tozali na nzela mpo na likambo yango.Ezali moko na Bilei ya Nzambe, oyo Apésáki Lingomba na Ye,pe alakaki yango na mikolo ya suka mpo na bana na Ye bandimi.Tata, sunga biso mpo na kozala bana oyo bandimi, mpo nyonsoekosalema mpo na bandimi. Kokisa yango, Nzambe Molingami.Tosengi yango na Nkombo na Yesu. Amen.138 Nakanisi ete Billy ayebisaki ngai ete bakabolaki ba-kalatiya mabondeli. Soki moto moko akoki koyebisa ngai lettre oyoezali na kalati ya mabondeli, yango nde nyonso nalingi koyeba.[Moto moko alobi: “C.”—N.D.E.] C, malamu, tózua C, moko, mpona kobanda, kobanda kosala molongo na biso. Bomoni, sikawa,bakoki kozala bisika nyonso. Sikawa, soki bato nyonso…Ee,bomoni, nakomeka kosala boye. Nayebi te soki tokoki kosalayango to te. To, pe, tokoki kosala molongo ya kobenga bato;bófanda kimia. Ezali likambomoko te, mpo na ngai. Soki bokokikoya awa na etumbelo, to kobenga na molongo, nyonso mibaleezali mpenza mabe te. Nazali kotalela bobele Molimo Mosantu.Nazali kotalela Yempo na kolóngisa Liloba oyo nauti koteya.139 Ndeko George Wright, nandimi Yango. Uta bolenge na ngai,nazalaki koya na ndako na yo, eleki mibu mingi, koyoka ndekewana, engoulevent, na nzete, nazali kokoba kondima Nsangoyango. Nandimi ete Ezali motindo moko.140 Malamu, namoni ete bazali kofungola nzela awa mpo namolongo yamabondeli.Malamu, káláti yamabondeli C,motángoya liboso, mibale, misato, minei, mitano, bóya naino kotelemaawa. Soki okoki kotelema te, tómbóla bobele mabóko, batomosusu bakoya komema yo. [Moto moko asololi na NdekoBranham—N.D.E.] Ezali nini? Iyo. Iyo. Káláti ya mabondeli C,moko, mibale, misato, minei, mitano. Pe sikawa botala, binobaoyo bozali na káláti ya mabondeli te…141 Sikawa, nasálá molongo ya mabondeli ya boye kálá,kálá mingi. Bato boni bazali komikanisela etinda na ngai,ntango totongaki Mongombo oyo? Alobaki: “Sálá mosalaya mopalanganisi-nsango-malamu.” Alobaki te ete nazalakimopalanganisi-nsango-malamu. Alobaki: “Sala mosala yamopalanganisi-nsango-malamu,” bomoni, “mpo ntango moko

Page 23: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 23

ekoya, wana yango ekobongwana.” Ntango yango ezali koya.Malamu. Sikawa, kati na yango, Ye…142 Okoki kosangisa misala-ya-koteya mibale to misato ekesenite, kozala mokengeli pe mopalanganisi-nsango-malamu, mbalamoko. Okoki kozala te mo—mosakoli pe, ntango mosusu,mokengeli, mbala moko, bomoni, mpo bozali na misala ekeseni,mosala-ya-koteya ekeseni.143 Kasi Nkolo apesaki ngai makambo nasengelaki kosalana Nsango na ngai. Kasi, na sima, Alobaki: “Sala mosalaya mopalanganisi-nsango-malamu, kokisa mpenza mosala-ya-koteya na yo malamu, mpo ntango moko ekoya, wana ekoyokakabato Mateyo na sembo te.” Yango mpenza nde esili kokómasikawa! Bibongiseli nyonso ya mangomba eboyi ngai. Baboyikoyoka Mateyo ya sembo. “Kasi, mpo na konyomitisa matoi nabango, bakoyanganisa balakisi kobila mposa na bango mpenza,pe bakobongwa koyoka masese na mpamba. Pe bakosalamakambo minene ya kokamwa, lokola Yambele ná Yane, baoyobatelemelaki Mose, kasi boléma na bango ekozala polele epaina bato nyonso.” Bomoni? Bomoni? Malamu, bomekoli! Bomoni,lokola Yambele…144 Pe, Nzambe na Likolo ayebi, ezali kuna, na litúmu yaMongombo, kobanda mobu 1933, ekomámá na lokasa ya Biblia,ezali mpenza kuna. Botala lolenge basalaki. Botala makamboesalemaki. Bomekoli, yango mpenza. Alobaki: “Bótika bango,boléma na bango ekozala epai na bato nyonso pelamoko naYambele ná Yane.” Tálá, tokómimpenza namokolo yango.145 Namonaki losambo na eleko wana, ntango tozalaki kotialibanga ya litúmu, bato bayekemeki na maninisa pe bisikanyonso, batelemaki pembeni na bitutú ya mongombo. Yangompenza. Bato balobaki, ntango esalemaki, bato ya engumba oyo,balobaki: “Liboso sanza motoba ékoka…”Biso tozalaki bobelena dollar moko na centime ntuku mwambe mpo na kotongamongombo, babongisi-mituka mingi basilaki kozua mokano eteekokóma esika na bango ya kobongisa mituka. Kasi, kino lelo,ezali lopango-ya-mpatempo na Bampate yaNzambe.146 Moko, mibale, misato, mitano, motóba, nsambo, mwambe,libwa, zómi. C,motóba, nsambo,mwambe, libwa, zómi.Malamu.147 Sikawa, “Ngai Yawe nalonaki yango, Nakomwangiselayango mai butu pe moi mpo moto moko te ábotola yangona loboko na Ngai.” Botala ndenge balobaki yango mabe!Ebongiseli ata moko te esungaki Yango. Lingomba ata mokote ekokani na Yango na ekólo oyo mobimba. LingombaPantekotiste ata moko te na ekólo mobimba, eloko moko te mpona kosunga Yango. Bango nyonso batelemelaki libatisi na mai,bango nyonso batelemelaki makambo mosusu nyonso oyo. Atana libota na ngai moko, papá na ngai moko abenganaki ngai na

Page 24: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

24 LILOBA LILOBAMI

ndako, natiáki bilamba na ngai na mwa sáki moko ya papier penakendeki kofanda na NewAlbany. Ya solo.

Kasi na nzela yamakámá,minioko pemitámbomingi,

Nasilaki koleka;Ngolu nde ebateli ngai mosika boye,

Nakómi na mibu ntuku mitano na motoba, pe etikali mokenákatisa ebale.

Ngolu ekokoba komema ngai.Ntango nakozala kuna mibu nkóto zomi,Kongenga makasi lokola moi;Tokozanga te koyemba masanzoli ya NzambeKoleka mikolo ya ebandeli.

Oh, nalingaka Yesumingi! Azali nyonsompo na ngai!148 Oh, malamu, bato boni…Nasukaki wapi, zómi? Tokokikobakisa bamosusu? Malamu. Tokómaki wapi, zomi, zomi namitano? Malamu. C, zomi kino zomi na mitano, ata ozaliwapi, soki okoki kotelema pe kokóta na molongo. Olobi nini?Ah? Malamu. C, zomi na mitano kino ntuku mibale, na sima.Ezala C, zomi na mitano kino ntuku mibale. Bato zomi ndebabakisami. Tomoni…Bomoni—bomoni kuna, esika molongoyango ezali, tolingi te ete—ete bato bákangama ya koleka. Petoko…Malamu.149 Sikawa bólanda ngai na bokebi nyonso mpenza; tokoumelate. Kasi, sikawa, oh, ngonga nini boye, ntango nini boye! Na—nalingi ete moto nyonso ákoka kolinga Nkolo. Na—nalingi etebiso nyonso tókoka kokóma esika yango, kososola makoki yaminíti oyo. Tómeka yango. Bólanda ngai na bokebimpenza.150 Likambo nini—likambo nini tozali koluka kosala awa? Tozalikolekisa Liloba na Nzambe na momekano. Eliya pe asalakindenge moko, amataki likolo na ngomba, sima na ye koyeba eteatindamaki na Nzambe mpo na kosala yango. Alobaki: “Sikawatótalisa polele nani azali Nzambe, tika Nzambe oyo akoyanolana móto ázala Nzambe.”151 Pe bapakano bazalaki komikata-kata, oh, koloba: “Ee, nantembe te…” Ba—bapakano bayebaki ete móto ekokita te, nabongo bazalaki kogánga pe kobélela.152 Kasi Eliya ayebaki ete ekokita, mpo azaláki na emononelilongwa na Nkolo.

Okoloba: “Azaláki na emononeli?”153 Iyo, misie! Ntango asilaki kobongisa makambo nyonso,alobaki: “Nkolo, nasali nyonso oyo kokokana na etinda na Yo.”Na sima móto ebandaki kokita. Soki Liloba na Nzambe etósamina mobimba, na ntango wana ezali likambo na Nzambe mpo nakotálela makambo etikali. Asengi na yo bobele ete ótalisa yango

Page 25: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 25

wana. Pe óndimisama ete obéngámimpo na kotalisa yangowana.Bomoni? Soki obéngámi, Akotalelamakambo etikali.154 Sikawa, awa ekozala mpo na bato bakoleka na molongooyo, baoyo nakobondela mpo na bango…Sikawa, ee, bokómimpenza kino pembeni na etutú, malamu, mpo na kobandamolongo yango. Sikawa, liboso, esika moko boye awa kati nandako, ezali ntango mosusu na bato…

Bato boni awa bazali na bokono kasi bazangi kalati yamabondeli, bótombola loboko. Bomoni, bisika nyonso. Sikawa,boyebi ete soki Nkolo na biso…Pe nandimi ete Akosala, sokiAzali motindo moko lobi, lelo pe libela. Asalaki milongo yamabondeli. Bato bazalaki koya epai na Ye na milongo ya milai,ebélé na bato, Azalaki komama bango, kopambola bango. Nasima, Atelemaki mwa moke pe Alobaki: “Nani asimbi Ngai?”Atambuisaki miso, Ayebisaki mwasi moko ntina nini asimbakiYe; Alobaki ete kotanga ya makila na ye esilaki, kondima na yeebikisaki ye.155 Bongo soki abalukaki pe alobaki: “Ee, nayebi te, Nkolo,naumeli na yango ntango molai”? Elingaki kosalema te. Te,elingaki kosalema te. Te.156 Bongo soki Alobaki na mwasi mo-Sulapoinika: “Mpo naliloba oyo olobi, mwana na yo ya mwasi, molimo mabe asilikobima kati na ye”, bongo soki alobaki: “Ee, sikawa, Nkolo, na—nalingaki ete Yo ósala yango boye”? Mo—molimo mabe yangoalingaki kokóba kozala kati na mwana mwasi yango. Kasi atiakielikia ete akokutamwana na ye ndengeAlobaki ete akokuta ye.157 Sikawa, Alobaki na biso: “Soki okoki kondima! Soki okokikoloba na ngomba oyo: ‘Longwa wana’, pe otii ntembe namotema na yo te, kasi ondimi ete likambo olobaki ekokokisama,okoki kozua yango. Ntango obondeli, ndima ete ozui yango,ekopesamela yo.” Oyo nde elaka!158 Sikawa,moto oyo ateyaka nsangomalamu ya kosepelisa batoandimaka yango ata moke te. Akoya kino na ekuke, akotala nakati, to akotelemawana, pe akoloba: “Ee, ezali etóngamosusu yabatúntuki”, pe akei na ye. Bomoni? Kasi ayebi te ete oyo nde Bileiebombámá. Ayebi te ete oyo nde Eloko ya nkukú, oyo ebombámámosika na ye. Ayebi yango te. Ezali—ezali—ezali mawa, likanisioyo ezali bolumbu, ya mawa pe ekúfá miso, kasi eyebi yango te.Bomoni? Ezali mpenza mabe.159 E Nzambe, kotika ngai te kokóma ndenge wana, malamunákufa liboso. Malamu nákufa (iyo, misie), esika ya kosalayango. Nabanzi ete ezali bongompo namoto nyonso kati na biso,boye te? [Losambo balobi: “Amen.”—N.D.E.]160 Kasi sikawa, Nzambe alakaki biso makambo oyo na mikoloya suka. Na Malaki 4, ekomami ete Yesu Klisto akokita peakomitalisa Ye moko kati na nzoto ya moto, ndenge Asalaki naSodoma. Ezali solo. Pe elobami ete mokili ekokóma na lolenge

Page 26: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

26 LILOBA LILOBAMI

ya Sodoma. Pe elobami ete: “Ndenge esalamaki na ntango wana,Mwana na moto akomonisama mokolo yango.” Bomoni, Motooyo akitaki na lolenge ya moto, oyo ezalaki “Elohim”, mpo naAbalayama, liboso na koya ya mwana na elaka. Botala likamboesalemaki, Abalayama alobaki ete ezalaki Nzambe. Pe Bibliaelobi ete bato misato bayaki epai na ye, ná putulú na bilamba nabango, bazalaki na mobembo, bafandaki pe baliaki lokola bato.Pe Yesu alobaki: “Bobele ntango oyo mokili ekokóma na lolengeya Sodoma, boye Mwana na moto akomimonisa Ye moko lisusu,”Mwana na Nzambe te. Mwana na moto, bomoni, AkomimonisaYe moko.161 Sikawa bókokanisa yango na likambo mosakoli ya sukaalobaki: “Tálá, Nakotindela bino Eliya mosakoli, pe akozóngisami—mitema ya bana epai ya batata.” Bomoni? Nsango mpo nakozóngisa bango na Biblia, pe Mwana na moto akomimonisaYe moko na eleko wana. Pe na mokolo yango ya koyula naeleko ya lingomba ya suka, mwanje na nsambo, mabombamiya Nzambe ekoyebana na eleko yango. Bilembo Nsamboekofungwama. Mabombami ya mangomba oyo nyonso pemakambo nyonso, ndenge esalemaki, pe eloko nini esalem-…lolenge nini, makambo nini esalemaki.162 Bomoni, bayebi Yango te. Yesu alobaki: “Bino Bafalisai,bakufi miso!” Alobaki: “Soki mokufi miso azali kokambamokufi miso, bango mibale bakokweya na libulu, boye te?”Bomoni, yangowana bato yango bazali komonaYango te.163 Libombami na Yango, Bilembo wana, ezali ete moko namoko na mangomba yango, esalaki ebongiseli pe ekotaki kati nayango, pe yango nde moko na makambo ya sekelé, oyo ezalakimabe na miso ya Nzambe. Bomoni yango, Docteur Lee? Bomoni,botala. Ezali yango. Yango nde likambo oyo ezali mpenza wana.Ezali moko na ba-sekélé. Bakómaki ebongiseli pe, bomoni,bazalaki mpenza libanda na mokano ya Nzambe. Likamboyango ekotalisama polele na mikolo ya suka, pe ekomema bato,na endimeli to na ebongiseli te, kasi ekozongisa bango na Lilobaya solo. Pe Liloba ya solo ekoya mpo na etónga moko ya bato, peMwana na moto akomimonisa Ye moko kati na bango, “motindomoko lobi, lelo pe libela.”164 Oh! la la! Oh, nalingaka yango. Nalingaka—nalingakakopesa Ye lokumu. Nalingaka ko—koyeisa Ye monene liboso nabato. Nasengeli kokomisa Ye monene te; Azalaka na Ye monene.Azali molai mingi koleka pe bokoki koleka likolo na Ye te, azalina bozindo mingi pe bokoki koleka na nse na Ye te, azali monenemingi pe bokoki kobaluka zonga-zonga na Ye te, pe ata bongo,bozali na esika kati na motema na bino mpo na Ye. BoboyikoyambaYe?Nkolo na biso azali malamumingi!Malamu.165 Sikawa tófanda mpenza kimia, biso nyonso. Sikawa,tolobelaki Likambo oyo. Sikawa likambo ezali été, Ezali ya solo?

Page 27: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 27

Sikawa, ekoki kozala na bapaya awa ntango mosusu. Nakokikoloba, soki…na bino, soki Klisto azali motindomoko lobi, lelope libela, Alingaki kosala nini na miníti oyo? Alingaki kosalamakambo moko oyo Asaláká ntango Azalaki awa liboso. Ezaliya solo? Kondima ya bato elingaki kosimba elamba na Ye, peAlingaki kobaluka. Ndenge Asalaki mpo na mwasi wana nalibulu ya mai, pe ndenge Asalaki bisika mosusu, pe Azalakikoyeba makanisi na bango.

Sikawa, okoloba: “Akoki kobikisa ngai?”166 Liloba na Ye elobi ete Asílá kosala yango. Kasi likambo ezaliete, esengeli na Yemoko komitalisa, ete Azali awa.167 Sikawa, soki Amonani na biso awa na nzoto ya mosuni,kokokana mpenza na Moto ya Klisto na mibu Ntuku misatona misato ya Hofmann, ná makila ezali kotanga na loboko naYe, pe bongo na bongo, ná bilembo ya nsete likolo na Ye, ngainakondima yango te. Te, te. Te, te. Ntango akoya, Yemoko, “Misonyonso ekomona Ye, ndémo nyonso ekotatola Ye; pe lokola moiebimaka na Esti kino na Westi, ekosalema pe ndenge wana.”Bomoni? Biso tondimaka binzambinzambi ná bitónga wana te.Tondimaka ete Nzambe azali Liloba.168 Kasi Alati nzoto Ye moko, azui nzoto na yo pe nzoto nangai, pe apesi bino makabo, apesi ngai makabo, pe na nzela yamakabo yango Azali komitalisa Ye moko. Yango nde bilei yankúkú. Ata Amitalisi Ye moko na nzela na ngai ndenge nini,osengeli kondima Yango, pe osengeli kozala pe na likabo yakondima, mpo na kondima Yango. Bondimi yango? [Losambobalobi: “Amen.”—N.D.E.] Pe sikawa, soki Amitalisi Ye moko nalolenge yango, bokondima Ye? [“Amen.”] Na motema na binomobimba, bokondima Ye? Oh, ezali malamu mpenza, nazalikozela Ye, nazali bobele kozela komona likambo nini Akoloba.169 Tala mobali moko azali awa. Namóná ye naino te na bomoina ngai, na boyebi na ngai. Emonani lokola azali moto malamu,makasi pe na nzoto kolongonu, pe ntango mosusu azali, na—na—nayebi te. Kasi atelemi wana. Sikawa, nakoki kokende kotiamaboko likolo na moto yango pe kobondela mpo na ye, kotunaye soki akondima. Akoki kotelema awa pe koyebisa ngai, ete:“Na—na—nalingi été óbondela mpo naBoye-ná-boye. Pe nazali—nazali na likáká ekómi patatalu. Nayókaka ntango nyonso motómpasi. Nazali na mpota na líkundú na ngai”, to eloko moko. Ye—ye, nayebi te. Akoki kolobamoko namakambowana.170 Ngai nakoloba: “Malamu, misie, ndeko. Nakotia mabokolikolo na yo pe nakobondela mpo na yo.” Ekozala mpenzamalamu mingi. Yango mpenza nde makambo tosalaki, ntangonyonso na bileko. Ezali ya solo?171 Kasi, bomikanisela, Yesu alobaki été ekozala ndenge mosusumpenza na ntango ya Boyei na Ye, ekozala ndenge ezalaki namikolo ya Sodoma. Pe Moto oyo ayaki kuna, Apesaki mokongo

Page 28: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

28 LILOBA LILOBAMI

na hema, esika Sálá azalaki, pe Alobaki (“Abram” te, sikawa)“Abalayama.”172 Bomoni, azalaki Abram, mokolo ya liboso. Kasi azuakiemononeli, pe Nkolo ayebisaki ye ete: “Nakobongola nkombona yo.”173 Pe tálá, Nkolo Ye moko ayaki, na lolenge ya moto, azalakikolia pe komela elongo na ye. Alobaki: “Abalayama, wapi mwasina yo Sálá?” S-á-l…l-á; kasi S-a-l-a-ï te.

Alobaki: “Azali kati na hema, na sima na Yo.”174 Alobaki: “Nakoya kotala yo, kokokana na elaka na Ngai,eleki mibu ntúkú mibale na mitano.”175 Pe Sálá asekaki mwamoke kati ye moko. Alobaki: “Sálá autikoseka kati na hema, koloba: ‘Makambo oyo ekosalema ndengenini?’” Ah. Ezali na likambomoko oyo eleki nguyampo na Yawe?Bomoni? Eloko moko te. Te, misie.176 Sikawa Alobaki, Yesu alakaki ete: “Ye, Mwana na moto,”oyo ezali Liloba (bondimi yango?), “akoya na mikolo ya sukape Akomimonisa Ye moko, na eleko oyo mokili ekokóma lokolaSodoma ná Gomora.” Bondimi ete ezali solo?177 Liboso tóbondela libondeli moko, bamosusu kati na binokuna, bóbondela pe bótala soki Mwana na moto, kino lelo,azali motindo moko lobi, lelo pe libela. Bótuna bobele sokiAzali, bóloba: “Nkolo, moto yango ayebi ngai te, kasi nayebi eteOzali motindo moko lobi, lelo pe libela,” bótala soki Akoyebisabino yango.

Iyo, misie. Sikawa bótombolamotómwamoke.178 Ezali sima na ngai. Azalimwanamoke. Azali namótomakasiya fièvre sikawa. Azalimwanamwasi. Bouti libanda na engumbaoyo. Mwana yango azali na mpasi na líkundú. Azalaki na yango.Ndimá kaka.179 Sikawa, yango nde likambo Alobaki ete Akosala? Namónánaino moto yango na bomoi na ngai te. Nzambe, na Lola,ayebi yango.180 Moto oyo, azali komonana ete azali makasi mingi ná nzotokolongonu. Kasi bozali komona elilingi wana likolo na ye kuna?Elingi koloba, soki Nzambe asungi ye te, atikali lisusu na ntangomolai awa te. Azali na cancer. Ezali na poumon na yo.

Sikawa, Mwana na moto azali awa.Azali na mokumba na motema na ye mpo na elenge mobali

moko, mwana moko ya moke. Ezali solo? Ondimi ete Nzambeakoki koyebisa ngai mpasi ya mwana yango? [Ndeko mobalialobi: “Nayebi ete Akoki.”—N.D.E.] Akoki. Azali kobungisamayele mwa moke, ezali lolenge moko ya maládi ya ndeke. Autikosala yango kala mingi te. [“Na ntongo ya lelo.”] Ezali solo, na

Page 29: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 29

ntongo ya lelo. Ondimi ete okozala na bomoi mpo na kobókolomwana yango, pe akoyokamalamu? [“Iyo.”]181 Charlie Cox azali wapi? Azali wapi? Charlie, ozali wapi?Nakanisaki ete azali awa na mpokwa oyo. Awa, Charlie. Gary,ozali wapi? Larry, azali awa? Mwana na ye ya mobali azalakina bokono yango moko, ndenge moko mpenza. Ozali wapi,Larry? Yaka naino awa. Ee, yo wana. Elenge mobali oyo azalakina bokono yango moko. Tata ná mama na ye bazali mpenzabaninga na ngai yamalamu. Eleki mibumingi, nazalaki kuna, pemwana mobali oyo, bokono yango ezalaki kokweisa ye, azalakikobungisa mayele pe koyeba eloko moko te. Ezalaki maládi yandeke. Nasosolaki yango na mwana oyo, naséngaki na Nzambeábikisa ye. Esálá ye lisusu ata moke te kobanda ntango wana.Oyo nde tata na ye; mama na ye afandi awa esika moko boye; peelenge mobali yango ye oyo, ye moko.182 Sikawa ondimi, misie? (Natondi yo, Larry.) Ondimi, misie?Tika ete Nzambe ya Lola ákokisela yo likambo yango moko,pe ásala ete ózala na bomoi mpo na kobókolo mwana yango.Nzambe ápambola bino.

Tóbondela.183 Nzambe molingami, sunga ye. Nabondeli ete mawa pe ngolunaYo ézala likolo na ye pe ópambola ye. NaNkombo naYesu.184 Zónga na Louisiana sikawa, na esengo, pésá nkembo naNzambe mpo na ye.185 Oh, iyo, autaki na Louisiana, na ntembe te, na ngámbo yaLaki Charles. Ya solo. Bomoni, nakoki kososolamakanisi na binosikawa. Nzambe ákumisama!186 Ee, ozali kosenga eloko ya—ya malamu, ozali na mposa yamwana. Osílá kozala na bana, bana mibale to misato, kasi ozalina mposa ya moko lisusu. Tika ete Nzambe ya Lola ápesa yoyango, ndeko na ngai ya mwasi. Yaka awa, nalingi kotiela yomaboko.187 Nzambemolingami, pésámwasi oyomposa yamotema na ye,mpo ezali ntinamokomalamu.NaNkombo naYesu. Amen.

Sikawa kende kozua mwana yango.188 Nzambe azali Nzambe malamu. Bondimi yango? [Losambobalobi: “Amen.”—N.D.E.] Ayebi nyonso oyo tozali na bosenga nayango. Akokisaka bosenga na biso nyonso, soki tondimi yango.Alobaki: “Soki okoki kondima!”189 Napesaki yo mbote ya loboko esika moko. Nayebi lisusuesika yango te, kasi esika moko boye, napesaki yo mbote yaloboko. Nazali koyeba lisusu mpenza te, kasi tozalaki esikamoko, lelo, esika moko, kasi nayebi esika yango te. Kasi ezalikuna te, tozali awa mpo na kolobela yango te. Oyei awa mpona kolobela, to mpo na kobondela, olingi ete nábondela mpona moto mosusu. Ezali solo. Azali awa te. Azali na Géorgie,

Page 30: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

30 LILOBA LILOBAMI

azali kobéla. Azali bobele kobéla na nzoto te, kasi na molimoazali kobéla; ndeko na yo ya libóta. Ondimi ete Nzambe akotalalikambo yango, mpo yo ozali awa mpo na ye? Ondimi yango?Yaka awa pe tóbondela elongo.190 Nzambe molingami, pésa mobali oyo mposa ya motemana ye, mpo ákoka kozonga pe ákuta mobali yango kokumisaNzambe. Nasengi yango naNkombo na Yesu. Amen.

Nzambe ápambola yo. Kotia ntembe te. Ndima na motemana yo mobimba.191 Mbote. Ezali te ete nasembolaki loboko te mpo na kopesa yombote, ntango osembolaki loboko na yo, nazalaki kotala elokomoko. Ezalaki elilingi, ya molili makasi pe moindo. Yango ndentina. Nayebi ete soki nazuaki loboko na yo, nalingaki koyebayango na lolenge wana, omoni. Kasi ezali cancer. Ondimi eteNzambe azali na makoki ya kolongola yango? Ezali na ntólo nayo, na ngámbo ya mwasi. Olingi kozonga na Caroline pe kopesankembo na Nkolo mpo abikisi yo, boye te? Ososoli likambonalingi koloba? Tóbondela.192 Nzambe molingami, na Nkombo na Yesu Klisto, Ye oyo azaliawa sikawa; wana bana bazali kolia Lipa ya Nzambe, tika etemwana oyo pe ázua mbano ya kondima, Lipa ya Nzambe oyoApesi ye sikawa mpo na kobikisama na ye. Tika ete ázonga peábika, na Nkombo na Yesu. Amen.

Nzambe ápambola yo, ndeko. Ndima na motema na yomobimba.

Mbote.193 Ezali ntango moko kitoko mingi, boye te? Ezali lokola etebato basimbami na limemia monene. To, ezali koyokana lokola,ntango mosusu na matoi na ngai, ezali lokola eloko moko ezalikosala: “Wuuuhh!” Ezali kosala makelele lokola: “Wuuuhh,”ndenge wana, bomoni. Ezali Lipa ya bana. Bomoni? Ezali yabino. Ezali mpo na bino. Ezali mpo na ngai te; Ezali mpo nabino. Nazongisi matondi mingi, ete sika-sikawa, ngai…nazalimpenza malamu, na boyebi na ngai; kasi Ezali Lipa mpo nangai pe, ntango nazalaka na bosenga na yango. Ezali Lipa mpona bino. Ezali kopesa mpiko. Ata mpo na bino baoyo bozali nabokono te, ematisakamitema na biso liboso naNzambe.194 Likambo oyo ezali mpenza na ntango ebongi, likamboAlobaki ete Akosala: “Pe ndenge esalemaki na mikolo yaSodoma, ekosalema pe bongo na boyei ya Mwana na moto,ntango Mwana na moto akomonisama.” Bomoni? “Pe, tala,Nakotindela bino Eliya mosakoli, liboso na mokolo monene peya nsómo ya Nkolo. Akozongisa mitema ya bato epai na Tata.”Bomoni? Bomoni?195 “Na sima bayengebene bakonyata ba—bato mabe na nse,bakozala mputulu.” Bakozika lokola litumbú ya móto, bomoni,

Page 31: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 31

mabelé nde ekozika. Tomoni yango, ekobebisama kuna. Pe ba-volcan ekobwakamóto namabelé, pe likolo ekopelamóto.

E Libanga na Bileko, yokela ngai mawa sikawa, pe nantango wana.196 Mbote. Ee, likambo ya liboso, ozali na mpasi ya basi, bokonoya basi. Ozali na makambo mosusu. Ozali na motema likolo-likolo, na mibu oyo moto akómaka na motema likolo-likolo.Mikakatano ya ndenge na ndenge. Kasi ozali pe na mposa moko,ezali mposa ya kozua Molimo Mosantu. Ezali solo. Ezali yangompenza. Ondimi ete yo…Osili koyambola makambo nyonso?Ondimi ete, soki natieli yo maboko pe nasengi Nzambe kosalayango, Molimo Mosantu ekoya? [Ndeko mwasi alobi: “Iyo.”—N.D.E.] Ondimi yango? [“Iyo, misie.”] Tóbondela.197 Nzambe molingami, natii maboko na ngai likolo na mwasioyo, na lolenge ya bantoma, pe nasengi ete ázua libatisi yaMolimo Mosantu. Na Nkombo na Yesu Klisto, tika ete ázuaYango. Amen.198 Kotia ntembe na yango te. Ekómi ya yo, omoni. Ezali ya yo.Ezali Lipa ya—ya bana.199 Omiyokaki moke ndenge mosusu ntango nalobaki “bokonoya basi”, boye te? Mpo yango nde ozalaki na yango pe. Sikawaondimi ete okokóma malamu sika-sikawa? Kende, kóba kopesamatóndi na Nkolo.200 Mbote. Ondimi na motema na yo mobimba? Ondimi eteokozua makoki ya kolia ndenge ozaláká kolia kálá? Malamu.Kende, pe loba: “Natondi Yo, Nkolo. Nandimi yango.” Bozaliya Nkolo.201 Ondimi ete mpasi ya mokongo yango ekotika yo peokobika? Malamu. Kende pe kóba koloba: “Natondi Yo, Nzambemolingami,” pe Nzambe akokokisa yango.202 Ondimi ete okoki kobika, ete Nkolo akobikisa yo; pe okobelalisusu arthrite te, okobika pe na nzoto kolongonu? Ondimiyango? Kende, kóba kopesa Ye matondi, lobá: “Nkolo, nayambiyango namotema na ngaimobimba, pe nandimi yango.”

Bino kuna, bondimi nini mpo na Yango?203 Yo oyo ozali awa, tia loboko na yo likolo na mwasi oyo afandimpenza pembeni na yo, kuna, yebisa ye ete bokono ya kovimbamisisá ná arthrite ekotika ye. Ntango ako…?…204 Nzambe ápambola yo. Ondimi ete okobika sikawa? Zónga nandako pe bikisama. Nzambe ápambola yo. Kende liboso, pe lobá:“Natondi Yo, Nkolo Yesu.”205 Mbote. [Ndeko mwasi alobi: “Nkembo na Nkolo.”—N.D.E.]Ondimi ete bokono ya basi wana ekotika yo pe? [“Iyo.”] Peokobika? [“Natondi Yo, Yesu.”] Kende, pe lobá: “Natondi Yo,Nkolo.” [“Natondi Yo, Yesu.”]

Page 32: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

32 LILOBA LILOBAMI

206 Mbote. [Ndeko mwasi alobi: “Mokuwa ya mokongoekabwani.”—N.D.E.] Oh! la la! la la! [“Totten.”] Nayebi nkombona yo. Na—nazalálá ko…[“Totten.”] ntango nazalákámokengelina lingomba Batiste. [“Totten.”] Totten. [“Della Totten.”]Ndeko mwasi Della Totten. Okómi na bokono ya mpasi namokongo sikawa. [“Iyo.”] Ekosila sikawa. Ondimi ete Akobikisayo? [“Iyo.”] Ozali komikanisela likambo esalemaki kuna,na lingomba Batiste ya Milltown, eleki mibu mingi? [“Iyo,namikaniseli yango!”] Azali Nzambe yango moko kino lelo.[“Oh, matondi na Nzambe!”] Nzambe ápambola yo, ndeko nangai ya mwasi.

GeorgeWright, ozali wapi? Ozali komikanisela? Oh, nde…

Ondimi ete, soki natieli yo maboko, ná epakweli oyo, ondimiete okobika? Yaka awa. Na Nkombo na Yesu Klisto, tika eteábikisama. Amen. Zalá na kondima!

Ee, bino nyonso bondimi na motema mobimba? [Losambobalobi: “Amen.”—N.D.E.]207 Sikawa, komona mwasi wana, ekaniseli ngai mpenzamakambo ya kala! Nabosani lisusu nkombo na ye, kasi ngai…[Moto moko alobi: “Totten.”] Totten. Totten, ezali solo. Oh,iyo, mwana na ye ya mwasi, ezalaki Bertie. Ezali solo. Ezalimpenza solo. Bókanisa te ete makanisi na ngai ebungi, ezali etenazali komiyoka moke, boyebi, ezali mwa…Nakoki kolimbolayango te.208 Kasi mpasi ya mokongo na yo esili, madame. Kende, kumisaNkolo, lobá: “Natondi Yo, Nkolo.”209 Ondimi ete bokono na yo ya motema ekosila pe? [Mobelialobi: “Iyo.”—N.D.E.] Kende bobele na esengo, pe lobá: “NatondiYo, Nkolo Yesu,” pe ndima Yango. Malamu. Zalá na kondimasikawa. Kotia ntembe te.210 Yaka, madame. Ondimi na motema na yo mobimba? Ozali namakambo mingi oyo ezali kotambola malamu te. Yo pe ozali nampasi ya mokongo. Ondimi ete Nzambe akobikisa yo? Malamu,kende bobele na esengo. Ezali, ezali Ye moto asali ete ómiyokabongo. TóndaNkolo. Nzambe ápambola yo, ndekomwasi.211 Mbote, mwana. [Mwana mobali alobi: “Mbote!”—N.D.E.]Bondimi ete Nzambe akosilisa motema likolo-likolo ya mwanayango pe akobikisa ye? Bondimi yango? Malamu. Mbote,moninga, tika nápesa yo mbote ya loboko.212 Nzambe molingami, longóla eloko mabe yango likolo namwana mobali oyo, pe tika ete ázala na bomoi pe ázala malamu.Na Nkombo na Yesu. Amen.213 Nzambe ápambola yo, ndeko mobali. Ondimi yango, boye te?Okobika. Kotia ntembe ata moke te.

Page 33: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEI YA MOLIMO NA NTANGO EBONGI 33

214 Ozalimwanamokemingimpo na bokono yamotema. Ondimiete Nzambe akobikisa yo? [Mobeli alobi: “Iyo, misie.”—N.D.E.]Kende, lobá: “Natondi Yo,Nkolo,mpo na kobikisama na ngai.”215 Ondimi ete Nzambe akobikisa mpasi ya líkundú yango peakobikisa yo? Kóba kotambola na esengo, pe lobá: “NatondiYo, Nkolo.”216 Azali Nzambe kino lelo, boye te? [Losambo balobi: “Amen.”—N.D.E.] Eloko se moko bosengeli kosala ezali bobele kondima.Ezali solo te? BondimeliMwana namoto namikolo ya suka?217 Likambo moko euti kosalema awa eleki miníti moke, penakoki te…nazali koluka koyeba esika nini esalemaki. Motomoko azalaki na kondima pe asalaki likambo moko. To, ntangomosusu nakozua bango mokolo ya lomingo ekoya, to ntangonakokoka. Yomo—moto…Yango wana lisusu. Otomboli loboko.Ondimi ete Nzambe akoki kobikisa bokono ya motema yango,kobikisa yo, kobikisa mwana na yo ya mwasi, oyo kuna,azali na—azali na…Ondimi yango? Madame Neff, ondimi eteNzambe…Léo Neff. Nayebi yo te, kasi yango nde nkombo nayo. Ozali na bokono ya motema, pe mwana na yo ya mwasi, yamoke, azali na mpasi na lokéto. Ondimi ete akobika? Kondimana yo ebikisi yo. Ndima namotema na yomobimba.218 Yo oyo ozali kuna, esika ya kobatisa, ozali kuna pe ozali nampasi na líkundú, Yesu Klisto abikisi yo.219 Bondimi? [Losambo balobi: “Amen.”—N.D.E.] Azali motindomoko lobi, lelo pe libela. Tótiana maboko bamoko likolo nabamosusu sikawa. Oh, bókanisa ngonga nini tozali na yango,bókanisa ntango oyo. Bókanisa ete tozali mpenza Liboso na YesuKlisto, Mwana na Nzambe. Alakaki ete Akosala makambo oyonamikolo ya suka.Natiimaboko na ngai likolo na bilamba oyo.220 Nzambe molingami, nabondeli ete ópambola bilamba oyo,mpo na lobiko na nzoto ya bato yango, na Nkombo naYesu Klisto.221 Sikawa, wana botii maboko bamoko na bamosusu, mokomoko na bino, bozali binama ya Nzoto ya Klisto. MolimoMosantu moko oyo alakaki komonisa basekelé ya mitema pekosala makambo oyo, Azali kati na bino. Bozali eteni na Ye,pe Ye azali eteni na bino. Sikawa, Alobaki boye: “Tálá bilemboekobila baoyo bakondima.” Ezali bino. “Soki batieli babelimaboko, babeli bakobika.” Sikawa, kobondela mpo na yo mokote, bóndela mpo na moto oyo otieli ye maboko, mpo bango bazalikobondela mpo na yo. Sikawa tóbondela elongo, pe tika ete motona bolembu ata moko te ázala kati na ndako oyo. Mpo na ninitózela ntango molai, ndeko na ngai molingami, ndeko mwasi,Yango oyo, Molimo Mosantu, Nzambe, awa mpenza, Likambompenza oyo touti kolobela.222 Molingami Yesu, tososoli mpenza Bozali na Yo. Ozongisakibebé wana na bomoi mokolo wana, na libondeli ya kondima.

Page 34: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

34 LILOBA LILOBAMI

Nzambe molingami, bato mingi bazali awa oyo tokokaki kotalamakambo na bango te, ntango ezali kokende, kasi batii mabokobamoko likolo na bamosusu. Bazali bandimi. Tozali Liboso naNkolo Yesu Klisto, oyo asekwaki na bakufi, Azali motindo mokolobi, lelo pe libela.223 Satana, osílí kolóngama! Yesu Klisto alóngaki yo! Asekwakina bakufi, pe Azali elongo na biso na mpokwa oyo, kotatolaNsango oyo ya mikolo na suka. Bíma kati na bato oyo! Tíkabango, na Nkombo na Yesu Klisto! “Na Nkombo na Ngai,bakobengana milimo mabe,” pe tobengani yo. Na Nkombo naYesu Klisto, bíma na losambo oyo!224 Moto nyonso kati na bino sikawa, yo oyo ondimi kobikisamana yo, téléma likolo. Moto nyonso oyo andimi kobikisamaátelema. Bótombolamaboko sikawa, pe bósanzola Ye!

“Nayambi sikawa lobiko na ngai,” lobéla yango Nzambe.Nayambi sikawa lobiko na ngai. [Losambo balobi: “Nayambisikawa lobiko na ngai.”—N.D.E.] Ozali motindo moko lobi, lelope libela, e Klisto. [“Ozali motindo moko lobi, lelo pe libela, eKlisto.”] Nandimeli Yo sikawa. [“Nandimeli Yo sikawa.”] Sungakozanga kondima na ngai. [“Sunga kozanga kondima na ngai.”]Amen. [“Amen.”]

Nakosanzola Ye! Nakosanzola Ye!Bosánzola Mwana-mpate oyo abomamaki mpona basumuki;

Bópesa Ye nkembo, bino mabota nyonso,Mpo Makila na Ye elongoli mbindo nyonso.

225 Bolingaka Ye, boye te? [Losambo balobi: “Amen.”—N.D.E.]Na bongo tósánzola Ye. Bino nyonso, wana botómboli maboko,bosánzola Ye, wana ndeko abelemimpo na kosilisa liyangani.

Page 35: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

BILEIYA MOLIMO NA NTANGO EBONGI LIN65-0718E(Spiritual Food In Due Season)

Liteya oyo ya Ndeko William Marrion Branham, eteyamaki liboso na Ngelesana lomingo na mpokwa, mokolo mwa 18, sanza ya nsambo, na mobu 1965, naBranham Tabernacle, na Jeffersonville, Indiana, U.S.A., ekamatamaki uta nabande pe ekomamaki namobimba na yango naNgelesa. Ndimbola oyo yaLingalaekomami pe ekabolami na Voice Of God Recordings.

LINGALA

©2017 VGR, ALL RIGHTS RESERVED

VOICE OF GOD RECORDINGS

P.O. BOX 950, JEFFERSONVILLE, INDIANA 47131 U.S.A.www.branham.org

Page 36: LIN65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Ebongi VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN65-0718E Spiritual Food...BILEIYAMOLIMONANTANGOEBONGI 5 mangombanyonsomosusu,pekokomisayangosemoko,ntango

Liyebisi ya makoki ya mokolo-eloko

Makoki nyonso ekopesama na ndingisa. Búku oyo, ekoki kozala imprimé na masíni ya ndako mpo na yo moko to kokabama, ofelé, lokola esalelo mpo na kopalanganisa Nsango Malamu ya Yesu Klisto. Búku oyo ekoki kotekama te, koyíkanisama te, kotiama na site internet te, kobombama mpo na kolukaluka te, kolimbolama na nkota mosusu te, to kosalela yango mpo na kosenga misolo te, kozanga ndingisa ekomami mpenza na Voice Of God Recordings®.

Soki olingi koyeba makambo mosusu to kozua bisalelo mosusu, komélá:

Voice of God RecoRdinGsP.o. Box 950, JeffeRsonVille, indiana 47131 U.s.a.

www.branham.org