16
!"#2 No. 2 2017 OYEBAKA ETE EZALI MISALA YA BADEMO?

OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

  • Upload
    buikhue

  • View
    262

  • Download
    4

Embed Size (px)

Citation preview

Page 1: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

!"#2No. 2 2017

OYEBAKA ETE EZALI

MISALAYA BADEMO?

Page 2: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

CONGO, REP. DEM. DU: Les Temoins de Jehovah BP 634,Limete, Kinshasa. Baadr�si mosusu ya mokili mobimba ezalina Internet na www.jw.org/ln/komela-biso.

Awake! (ISSN 0005-237X) Issue 2 April 2017 is published bimonthly by Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.;L. Weaver, Jr., President; G. F. Simonis, Secretary-Treasurer; 1000 Red Mills Road, Wallkill, NY 12589-3299, and printed byWatch Tower Bible and Tract Society of South Africa NPC, 1 Robert Broom Drive East, Rangeview, Krugersdorp, 1739.� 2016 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Printed in South Africa.

!"#2

Vol. 98, No. 2 / Bimonthly / LINGALA Motango ebimisami: 60240000. Na min�k� 115

Zulunalo oyo ezali ya kot�ka te. Ebimisami mpo na koteya bato Biblia na mokili mobimba, mpembongo mpo na kosala mosala yango eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko.Soki olingi kopesa likabo, k�ta na www.jw.org.Soki liyebisi ezali te, mikapo ya Makomami euti na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika.

Okosepela koyeba makambo mosusu tobayekola na yo Biblia ofele?

K�ta na Internet, na www.jw.org to komela bisona moko ya baadr�si oyo ezali awa na nse.

Lelo oyo, bafilme na bateyatremingi elakisaka bilima, bazombi,ba-vampire, mpe bongo na bongo.

Okanisi nini? Nyonso wana esalakaeloko te, to ezali na likama oyotomonaka te?

Lamuka! oyo emonisi ete maka-mbomosusu oyo bato basepelakana yango kozanga koyeba, ezalakandemisala ya bademo.

3 LISOLO YA TITRE YA EZIPELIMisala ya bademo ekomikobenda likebi ya bato!

4 Biblia eteyaka nini na ntinaetali misala ya bilimo mabe?

MASOLO MOSUSU7 EBIM

´A KAKA YANGO MOKO?

Mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita8 LISALISI MPO NA LIBOTANtango moboti akufi

10 Mawa oyo bana bayokaka12 MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Espagne14 BIBLIA ELOBI NINI?

Ekulusu16 Okosepela koyeba Biblia malamu?

sMAKAMBO MOSUSUNA INTERNET

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKANasala nini soki likambo yamawa ekomeli ngai?Bilenge mibale bayebisi makambo oyoesalisaki bango ntango bakutanaki nalikambo ya mawa makasi.(Fungola esika bakomi MATEYA YA BIBLIA ˛ BILENGE)

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIABademo bazalaka mpenza?Soki bazalaka, bauta wapi?Bakoki kosala yo mabe?(Fungola esika bakomi MATEYA YA BIBLIA ˛ BIYANONA MITUNA YA BIBLIA)

r

r

Page 3: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Lamuka! No. 2 2017 3

BABUKU, bafilme mpe masano ya video ekomikolobela mingi bato ya maji, ezala bana to mi-kolo, basi ya kitoko oyo bazali band�ki mpe ba-vampire ya kitoko. Mpo na nini ekomi bongo?

Claude Fischer, profes�r� moko ya sosiolojiakomaki boye: “Na bambula oyo euti koleka,bato moke ya Amerika (1/10) bazalaki kondimaete bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bakomi kondima likambo yango. Mo-tango ya bilenge oyo balobi ete bak�taki ndakoya nganga, bandimaka ete bilima bazalaka mpebandako ya bilima ezalaka, eleki na mbala miba-le motango ya mikolo oyo balobi mpe bongo.”

Yango wana tokoki kokamwa te soki masoloetali bilimo mabe oyo bak�taka na nzoto yabato ezongi lisusu makasi. Michael Calia ako-maki boye na zulunaloThe Wall Street Journal:

“Soki masolo ya bademo oyo bak�telaka batoekomi kolobelama mingi ezali mpo na bambu-la oyo eleka, bato bazalaki kob�ta mingi masoloya bazombi, bilima mpe ba-vampire.”

Lapolo moko elobi ete “na mokili mobimba,bato mingi ( 25 tii 50%) bandimaka ete bilimabazalaka mpe na bamboka mingi batyaka baf�-t� ya bilima na babuku na bango.” Na

´Etats-

Unis, ank�t� oyo baprofes�r� mibale ya sosiolojibasalaki, Christopher Bader na Carson Mencken“emonisaki ete bato mingi ya Amerika (70 tii80%) bandimaka mpenza ete ezali na maka-mbo mosusu oyo esalemaka na ndenge ya bo-moto te.”

Koluka koyeba misala ya bilimo mabe to ma-kambo oyo esalemaka na ndenge ya bomotote, ezali kaka lisano?

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI

Misala ya bademo ekomikobenda likebi ya bato!“Liboso, bafilme ezalaki kolobela ba-vampire, bilima to bazombi kasisikoyo ekomi nde kolobela ndenge bademo bak�telaka bato mpendenge bato babenganaka bademo na nzela ya mabondeli.”—The Wall Street Journal.

Page 4: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

ATAKO bato mingi bandimaka te likambo nyo-nso oyo etali misala ya bademo to bilimo mabempe bazwaka yango kaka lokola lisano tomakambo bato oyo basalaka bafilme to batea-tre babimisaka, kasi Biblia etalelaka yango bo-ngo te. Epekisi polele misala ya bilimo mabe.Na ndakisa, Kolimbola Mibeko 18:10-13 elobiboye: “Epai na yo moto azwama te . . . motooyo azali kosakola makambo oyo ebombana,moto ya misala ya maji to moto oyo azali kolu-ka bilembo ya makambo oyo ekoya to motooyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kol�-ka bato mosusu to moto oyo azali kotunamoto oyo asololaka na bilimo to moto oyoasalaka mosala ya kosakola makambo ekoyato moto oyo azali kotuna bakufi.” Mpo nanini? Biblia ebakisi: “Moto nyonso oyo azali ko-sala makambo yango azali eloko moko oyo Ye-hova ayina . . . Osengeli kozala na mbeba te namiso ya Yehova Nzambe na yo.”

Mpo na nini Biblia epekisi mpenza misalanyonso ya bilimo mabe?

EUTAKA NA ESIKA YA MABEBiblia elobi ete bambula ebele liboso Nza-

mbe asala mabele, akelaki bamilio ya bikelamuya elimo to baanzelu. (Yobo 38:4, 7; Emoniseli5:11) Apesaki anzelu mokomoko bonsomi yakopona, elingi koloba likoki ya kopona kosalamalamu to mabe. Baanzelu mosusu baponakikokoma banguna ya Nzambe mpe batikaki esi-ka na bango na likolo mpo na kotya mobulu namabele. Yango nde esalaki ete mabele ‘etondana mobulu.’—Ebandeli 6:2-5, 11; Yuda 6.

Biblia elobi ete baanzelu yango ya mabe ba-tindaka bato basala mabe mpe bakosaka ebele

Biblia eteyaka nini na ntina etalimisala ya bilimo mabe?

Atako bakompanyi ya filme elobelaka bato mpemasolo ya misala ya bilimo mabe na ndenge yakokamwisa, tosengeli kokeba na makama na yango

Page 5: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Lamuka! No. 2 2017 5

ya bato. (Emoniseli 12:9) Balukaka kutu ko-salela mposa oyo bato bazalaka na yangoya koyeba makambo oyo ekoya.—1 Samwe-le 28:5, 7; 1 Timote 4:1.

Toboyi te, emonanaka lokola misala mo-susu ya bademo esalisaka bato. (2 Bakori-nti 11:14) Kasi mpo na koloba solo, baanze-lu ya mabe balukaka nde kozipa makanisiya bato mpo bayeba te solo oyo etali Nza-mbe.—2 Bakorinti 4:4.

Biblia emonisi ete kozala na boyokanina bilimo mabe ezali likama. Yango wanantango bateyaki bato oyo balingaki koko-ma bayekoli ya Yesu solo na likambo ya-ngo, “ebele ya baoyo bazalaki kosala misalaya maji basangisaki babuku na bango esikamoko mpe batumbaki yango,” atako ezala-ki ya mbongo mingi.—Misala 19:19.

Lelo oyo mpe bato mingi bazwa ekateliya koboya makambo mpe masano oyo eza-li na boyokani na misala ya bilimo mabe.Na ndakisa, ntango Maria� azalaki na mbu-la 12, akomaki kosakola makambo to ma-kama mosusu oyo ekosalema. Akomaki ko-limbolela baninga na ye ya kelasi makamboekoya na nzela ya bakarte mpe lokola ma-kambo yango ezalaki kokokisama, akomakikosepela na misala ya molili.

Maria akanisaki ete Nzambe nde apesakiye likabo yango mpo asalisa basusu. Alobiboye: “Likambo moko ezalaki kotungisangai, nazalaki kolimbolela bamosusu maka-mbo oyo ezali na bakarte yango, kasi naza-laki kokoka te kolimbola yango mpo na ngaimoko, atako nazalaki mpe na mposa ya ko-yeba avenire na ngai.”

Lokola azalaki kozwa biyano te na

� Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

“Soki bilenge mingi ya basi bakomi kondimamakambo etali band�ki ekoki kozala mpotelevizyo, bafilme mpe babuku ekomi kolakisabasi ya kitoko oyo bazali band�ki.”—Gallup Youth Survey, 2014

Misala ya bilimo mabe emonanaka na makambo lokolaAstroloji, bond�ki mpe misala ya maji. Na bisika mingi,bato balukaka kosolola na bilimo mabe na nzela yabaoyo basololaka na bilimo to band�ki. Bato mingibasalelaka nguya ya kosolola na bilimo mpo na koyebaavenire. Batalaka minzoto, bilembo ya makambo oyoekoya, talatala, banzela ya mab�k� ya moto to banze-la ya mab�k� na bango moko.

Babuku, bazulunalo mpe bafilme emonisaka etemisala ya bilimo mabe ezali na likama te to ezali mabete. Bapanzi-nsango mosusu balobi ete ndenge bapro-gram� ya televizyo mpe bafilme elobelaka makambooyo esalamaka na ndenge ya bomoto te, esali ete batobakoma kondima misala ya bilimo mabe.

Misala ya bilimo mabe ezali nini?

Page 6: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

mituna mingi oyo ezalaki kotungisa ye, Ma-ria abondelaki Nzambe mpe nsima ya miko-lo akutanaki na Batatoli ya Yehova mpebakomaki koyekola na ye Biblia. Maria aye-kolaki na Biblia ete likoki oyo azalaki na ya-ngo ya kosakola makambo ekoya eutakiepai ya Nzambe te. Ayekolaki mpe ete batooyo balingi kokoma baninga ya Nzambe ba-sengeli kobwaka eloko nyonso oyo ezali naboyokani na misala ya bilimo mabe. (1 Ba-korinti 10:21) Nini esalemaki? Maria abwa-kaki biloko mpe babuku na ye oyo ezalakina boyokani na misala ya bilimo mabe. Lelooyo ayebisaka basusu mateya ya solo oyoayekoli na Biblia.

Ntango Michael azalaki elenge, azalakimotangi monene ya masolo oyo elobelakabilima to ba-vampire. Alobi boye: “Nazalaki

kosepela kozala lokola bato oyo bakendakana mokili oyo ezalaka te.” Mokemoke, Mi-chael akomaki kotanga mingi babuku etalimaji mpe milulu ya losambo ya Satana.Abakisi: “Koluka koyeba makambo etinda-ki ngai nakoma kotanga babuku mpe kota-la bafilme oyo elobelaka misala yango.”

Kasi, koyekola Biblia etindakiMichael atalela malamu makambo oyoazalaki kotanga. Alobi boye: “Nasalaki listeya makambo nyonso oyo ezalaki na boyo-kani na misala ya bilimo mabe mpe nabwa-kaki yango nyonso. Nazwaki liteya moko yantina mingi. Na 1 Bakorinti 10:31, Biblia elo-bi: ‘Bosalaka makambo nyonso mpo nankembo ya Nzambe.’ Sikoyo namitunakaboye, ‘eloko oyo nalingi kotanga ekosalisangai napesa Nzambe nkembo?’ Soki te, na-tangaka yango te.”

Ebongi mpenza Biblia ebengama mwi-nda. Kaka yango nde emonisaka polelempenza misala ya bilimo mabe. (Nzembo119:105) Kasi esuki kaka wana te. Ezali mpena elaka kitoko etali mokili oyo bilimo mabebakozala te. Bato bakosepela mpenza. Nandakisa, Nzembo 37:10, 11 elobi boye: “Eti-kali kaka mwa ntango moke, moto mabeakozala lisusu te; mpe okotya mpenza like-bi na esika na ye, akozala te. Kasi bato yakomikitisa bakozwa mabele, mpe bakose-pela mpenza na kimya mingi.” ˛

Mpo oyeba makambomosusu, tos�ngi yo otangamokapo 10 ya bukuMakambo oyo Biblia eteyaka,ebimisami na Batatoli yaYehova mpe okoki kozwayango na jw.org. Okoki mpekosalela (scanner) kode oyo.

Page 7: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Lamuka! No. 2 2017 7

NZOI ekoki kokita ata na esika nini kozangamokakatano. Esalaka bongo ndenge nini?

Tokanisa naino: Es�ngaka ete nzoi ekiti-sa vit�si na yango tii na zero mpo ekita ko-zanga likama. Mpo esala bongo, es�ngakamakambo mibale—eyeba vit�si na yangompe ntaka oyo ekaboli yango na esika oyoelingi kokita, makambo wana mibale ndeesalisaka yango ekitisa vit�si. Kasi, banya-ma mingi ya mikemike ekoki te kosalelamayele yango mpo miso na yango ezala-ka penepene mpe emonaka kaka eloko oyoezali kotala, yango wana ezalaka na likokite ya koyeba mbala moko ntaka oyo eka-boli yango na esika elingi kokita.

Miso ya nzoi ekeseni mpenza na oyoya moto mpo moto asalelaka miso nyonsomibale na mbala moko mpo ayeba ntakaoyo ekaboli ye na eloko moko. Ntango nzoi

ezali kopusana pene ya eloko moko, eko-maka komona eloko yango monene lisusu.Baank�t� oyo iniversite moko (AustralianNational University) esalaki emonisi etenzoi ekitisaka vit�si na yango mal�mb�ma-l�mb� mpo eloko oyo yango ezali kotalaemonana monene to moke te. Ntango eko-mi na esika oyo ezali kokita, vit�si na ya-ngo ekomaka tii na zero, mpo esalisa ya-ngo ekita kozanga likama.

Zulunalo moko (Proceedings of the Na-tional Academy of Sciences) elobi boye:“Mayele oyo ezangi mind�nd� oyo nzoiesalelaka mpo na kokita . . . ebongi mpona kotambwisa na telekomande baapar�yioyo epumbwaka.”

Okanisi nini? Mayele oyo nzoi esalelakampo na kokita, ebima kaka yango moko tobasalaki yango kosala? ˛

EB IM´A KAKA YANGO MOKO?

Mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita

Page 8: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

MOKAKATANODami azalaki na mbula 6 ntangopapa na ye akufaki na maladibabengi anevrisme. Derick azala-ki na mbula 9 ntango papa na yeakufaki na maladi ya motema.Jeannie azalaki na mbula 7 nta-ngo mama na ye akufaki nsimaya konyokwama mbula mobimbana kanser ya ovaire.�Bilenge wana nyonso misato ba-boti na bango bakufaki ntangobazalaki naino bana. Osı okutanana likambo ya ndenge wana?Soki ezali bongo, lisolo oyo ekokikosalisa yo oyeba nini okoki ko-sala na likambo yango.� Liboso,totala mwa makambo etalimawa.

� Okoki kotanga makambo oyo ekomelakiDami, Derick mpe Jeannie na lisolo oyoelandi.� Atako lisolo oyo elobeli liwa ya moboti, kasiyango etaleli mpe liwa ya ndeko to yamoninga moko.

OYO OSENGELI KOYEBAMoto nyonso ayokaka mawa ndenge moko te. Yangoelingi koloba ndenge na yo ya komonisa mawa ekoki kokesanana ndenge oyo basusu bamonisaka yango. Buku moko(Helping Teens Cope With Death) elobi boye: “Ezali te na mi-beko to malako oyo esengeli kolanda mpo na kolongola mawaoyo liwa epesaka.” Likambo ya ntina ezali nde osengeli te ko-bomba mawa na yo. Mpo na nini? Mpo . . .Kobomba mawa ekoki kosala yo mabe. Jeannie oyo touti ko-lobela, alobi boye: “Namonaki ete nasengeli kozala makasimpe kobatela leki na ngai ya moke ya mwasi, yango wananabombaki ndenge nazalaki komiyoka. Tii lelo, nalukaka ko-bomba mpasi oyo nazali na yango na motema, kosala bongoezali mabe mpo na sante.”Bato ya mayele bandimi likambo yango. Buku moko (TheGrievingTeen) elobi boye: “Okoki te kobosana to kobombampo na libela ndenge ozali komiyoka. Na kozanga koyeba[mawa yango] ekoki kozonga mpe komonana na makambolokola nkanda makasi to kob�lab�la.” Kobomba mawa ekokimpe kosala ete okoma kom�la masanga mingi to dr�g�, kakampo na koluka kokitisa mpasi.Mawa ekoki kotinda moto akoma kokanisakanisa. Na ndaki-sa, bato mosusu bayokelaka moto oyo akufi nkanda mpo ba-miyokaka lokola “asundoli” bango. Basusu basilikelaka Nza-mbe mpo bakanisaka ete asengelaki kosala ete moto nabango akufa te. Bato mingi mpe bamonaka ete bamemi nga-mbo mpo na makambo oyo basalaki to balobaki na moto ya-ngo mpo ndenge ya kobongisa ezali lisusu te.

L I SAL I S I MPO NA L IBOTA � B I LENGE

Ntangomoboti akufi

r Tala makambo mosusu oyo ekoki kosalisa mabota na www.jw.org

Page 9: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Na ntembe te, ezali mpasi kolobela ndenge mawa esalakamoto. Ndenge nini okoki kokitisa mpasi yango mpe kokobakokende liboso?

OYO OKOKI KOSALASolola na moto moko. Na ntango wana ya mpasi, okokikomona malamu ozala kaka yo moko. Kasi koyebisa ndeko tomoninga moko ndenge oyo ozali komiyoka ekosalisa yo okiti-sa mawa mpe ekosala ete mpasi yango elekela yo moto te.—Toli ya Biblia: Masese 18:24.Koma mwa makambo na esika moko boye. Koma makamboetali moboti oyo akufi. Na ndakisa, likambo nini ya malamukoleka asala, oyo obosanaka te? Koma bizaleli na ye ya mala-mu. Oyo wapi okolinga komekola na bomoi na yo?Soki makanisi mabe ezali kotungisa yo, na ndakisa soki ozalikokoka kobosana te likambo moko ya mabe olobaki na mobotina yo liboso akufa, koma ndenge ozali komiyoka mpe ntinaozali komiyoka bongo. Na ndakisa, “nazali komona lokola na-memi ngambo mpo toswanaki na papa mokolo moko libosoakufa.”Na nsima, bwaka makanisi wana ya komiyoka lokola omemingambo. Buku moko (The GrievingTeen) elobi boye: “Ntinaya komipesa foti ezali te ntango oyebi ete okozwa lisusu li-baku te ya kos�nga bolimbisi. Ebongi te koloba ete moto ako-ki te koloba to kosala likambo moko oyo ekos�nga ete na nsi-ma as�nga bolimbisi.”—Toli ya Biblia: Yobo 10:1.Batela sante na yo. Zwaka ntango mingi ya kopema, salakangalasisi mingi mpe lyaka malamu. Soki ozali koyoka mposa yakolya te, na esika olya bilei ya kilo, lyaka mwa biloko ya mikemi-ke oyo etongaka nzoto tii ntango mposa ya kolya ekozonga.Kolya te bilei oyo etongaka nzoto te to kom�la masanga te mpona koluka kokitisa mawa, yango ekobebisa lisusu makambo.Yebisa Nzambe na libondeli. Biblia elobi: “Bwakela Yehovaye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosungayo.” (Nzembo 55:22) Libondeli ezali kaka te likambo ya kosalampo omiyoka malamu. Ezali mpenza nde kosolola na Nzambeoyo “ab�ndisaka biso na kati ya bol�zi na biso nyonso.”— 2 Bakorinti 1:3, 4.Lolenge moko oyo Nzambe ab�ndisaka baoyo bazali kolelaezali na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Mpo na nini te oluka ko-yeba oyo Biblia eteyaka na likambo etali bato oyo bakufa mpeelikya ya lisekwa?�—Toli ya Biblia: Nzembo 94:19. ˛

� Tala mokapo 16 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, voli-mi 1. Okoki mpe kozwa yango ofele na www.jw.org. Kende esika bakomi MIKANDA.

BAV�RS� YA NTINA M ING I

“Moninga mosusu akangamakamakasi koleka ndeko.”—Masese 18:24.

“Nakoloba na bololo ya molimo nangai!”—Yobo 10:1.

“Ntango makanisi oyo etungisakangai ekomaki mingi na kati nangai, mab�ndisi na yo [Nzambe]ebandaki kokitisa molimo na ngaimotema.”—Nzembo 94:19.

OKOKI KOSALISA BASUSU

“Ngai na libota na ngai tozali Batatoliya Yehova. Toyebi bana mibale oyomama na bango akufaki na kansereleki mwa bambula. Bazalaki nambula 6 mpe 3, kaka bambula oyongai na leki na ngai ya mwasi tozala-ki na yango ntango papa na bisoakufaki eleki sikoyo mbula soki 17.

“Ngai, mama, leki na ngai ya mwasina oyo ya mobali tozwaki ekateli yakosalisa libota yango. Tozalaki kobe-ngisa bango mbala mingi. Soki baza-li na mposa ya koloba, tozalaki koti-kela bango nzela. Tozalaki kolekisantango na bango mpe tozalaki kosa-la nyonso oyo bazalaki na yangomposa na ntango wana, ezala sokibazali na mposa ya moto ya kosaka-na na bango, koyoka bango to kope-sa bango toli.”

“Soki moboti akufi esalaka mpenzampasi mpe okobosana yango te.Mpasi yango ekoki kokita, kasi eko-zongela yo ntango nyonso na maka-nisi. Nayebaki mpasi oyo libota wanaezalaki na yango, yango wana nayo-kaka esengo ndenge libota na bisoesalisaki bango. Ekomisaki boningana biso na bango makasi mpe bisona biso tokomaki koyokana lisusumalamu.”—Dami.

Lamuka! No. 2 2017 9

Page 10: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

ISTWARE YA DAMI Na ebandeli, emonanakilokola papa azalaki koyoka kaka mwa motompasi. Kasi, ntango mpasi yango ekomakimakasi, mama abengaki ambilansi. Nabo-sanaka te ndenge minganga bamemaki ye.Nakanisaki te ete ekozala mbala ya nsukaya komona ye. Nsima ya mikolo misato,papa akufaki na maladi babengi anevrisme.Nazalaki kaka na mbula motoba.

Bambula ebele, nazalaki komipesa fotimpo na liwa ya papa. Nazalaki ntango nyo-nso kokanisa ndenge minganga bamemakipapa, mpe nakomaki komituna: ‘Mpo na nininat�l�maki kaka bongo kozanga kosala elo-ko?’ Nakomaki kotala mibange oyo bazali ko-b�la mpe komituna, ‘mpo na nini bango ba-kufi te, kaka papa na ngai?’ Mama azalakikosalisa ngai naloba ndenge nazalaki komi-yoka. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, ba-ndeko ya lisanga basalisaki biso mpenza.

Bato mosusu bakanisaka ete mawa eza-laka makasi ntango likambo esalemi mpenza,kasi na nsima esilaka na yango; kasi ya ngaiezalaki bongo te. Mawa na ngai eyaki makasina ebandeli mpenza ya bolenge na ngai.

Toli nakoki kopesa bilenge oyo baboti nabango bakufi ezali oyo: “Yebisa moto mokondenge ozali komiyoka. Ntango mosususoki oyebisi yango moto mosusu noki, oko-miyoka mpe malamu noki.”

Esalaka mpasi kokutana na makambo yaminene na bomoi kozanga papa. Kasi ela-ka ya Biblia oyo ezali na Emoniseli 21:4,eb�ndisaka ngai; elobi ete mosika te Nza-mbe “akopangwisa mpisoli nyonso na misona [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, na li-laka na koganga na mpasi ekozala lisusumpe te.”

ISTWARE YA DERRICK Basuvenire ya mala-mu ya papa, oyo natikala na yango ezali nde-nge tozalaki kokende kokanga mbisi na yempe komata na bangomba. Azalaki kolingabangomba.

Na bantango mosusu maladi ya motemaezalaki kotungisa papa; nazali koyeba lisu-su ndenge nakendaka kotala ye mbala sokimoko to mibale na lopitalo ntango nazalakimwana moke mpenza. Kasi nayebaki te etemaladi yango ezalaki mabe mpenza. Akufa-ki na maladi yango ntango nazalaki nambula libwa.

Ntango akufaki, nalelaki mingi. Namiyo-kaki lokola nasili makasi mpe nazalaki ko-boya kosolola na bato. Natikala naino ko-miyoka bongo te bomoi na ngai mobimbampe namonaki lokola nakokoka kosala atalikambo moko lisusu te. Na ebandeli, etu-luku ya bilenge na eglize oyo nazalaki kosa-mbela batyelaki ngai likebi kasi eumelaki te,basundolaki ngai. Bato bazalaki koloba na

Mawa oyo bana bayokakaOzali na mawa mpo moto moko ya libota na yo akufi? Soki bongo, okoki kosalanini mpo olonga mokakatano yango? Tala ndenge Biblia esalisaki bilenge misatobalonga mokakatano yango.

Dami

Page 11: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Lamuka! No. 2 2017 11

ngai, “mokolo na ye ekokaki” to “Nzambeabengi ye” to “azali sikoyo na lola.” Maka-mbo oyo bazalaki koloba ezalaki kosepelisangai ata moke te, kasi nayebaki te oyo Bi-blia eteyaka mpenza mpo na makambo ya-ngo.

Na nsima, Batatoli ya Yehova bakomakikoyekola na mama Biblia, na nsima, ngai nayaya na ngai tokomaki mpe koyekola Biblia.Toyekolaki ndenge moto akomaka nsima yaliwa mpe elaka ya kob�ndisa oyo Nzambeapesi, ya kosekwisa bato. (Yoane 5:28, 29)Kasi v�rs� oyo esalisaki ngai mingi ezali Yi-saya 41:10, Nzambe alobi boye: “Kobangate, mpo nazali na yo. Kotala epai na epaite, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yomakasi. Nakosalisa yo mpenza.” Lokola na-yebaki ete Yehova azali na ngai, eb�ndisakingai mpenza na eleko wana ya mawa mpeelendisaka ngai tii lelo.

ISTWARE YA JEANNIE Mama akufaki nakanser ntango nazalaki na mbula nsambo.Liwa ya mama ekamwisaki ngai makasi mo-kolo yango mobimba. Namonaki lokola moki-li ebaluki. Nazali koyeba lisusu mokolo yangoliboso mama akufa, bank�k� na ngai bazala-ki wana, kutu tokalingaki maki mpo tolya.Bato nyonso bazalaki na kimya.

Kobanda wana, mpe nsima ya bambula,namonaki ete nasengeli kozala makasi mpona leki na ngai ya moke ya mwasi, yangowana nabombaki ndenge nazalaki komiyo-ka. Ata lelo oyo mpe, nalingaka kaka ko-bomba na motema likambo moko oyo esalingai mpasi mpe bongo ezali mabe mpo nasante.

Nabosanaka te bolingo mpe lisungi yaBatatoli ya Yehova ya lisanga na biso. Ata-ko tobandaki sika koyangana na makita naNdako ya Bokonzi, bandeko batikaki bisote, ezalaki lokola toyebana na bango bandakala. Esalaki mbula mobimba, papa azalakikolamba te mpo bandeko bazalaki ntangonyonso koya kotikela biso bilei.

V�rs� oyo nabosanaka te ezali Nzembo25:16, 17. Na v�rs� yango, mokomi ya nze-mbo abondelaki Nzambe boye: “Balola elongina yo epai na ngai, mpe monisela ngai bo-boto; mpo nazali kaka ngai moko mpe naza-li na mpasi. Bampasi ya motema na ngaiekomi mingi; Ee longola ngai na motungisioyo nazali na yango.” Koyeba ete nazalingai moko te ntango nazali na mawa, ekitisa-ka ngai motema. Nzambe akotika ngai te. Bi-blia esalisi ngai nakende liboso mpe natyamakanisi na makambo ya malamu, na ndaki-sa na elikya ya lisekwa oyo Biblia elaki. Naza-li na elikya ya komona lisusu mama na ngai;komona ye na sante ya malamu na paradisoawa na mabele.—2 Petro 3:13.

Okosepela koyeba makambo mosusu etalinsango ya kob�ndisa oyo ezali na Biblia mpona baoyo bandeko to baninga na bango ba-kufi? Okoki kozwa ofele na Internet mwabuku “Ntango moto oyo olingaka akufi.” Ke-nde na www.jw.org, fungola esika bakomi MI-KANDA ˛ BABUKU MPE MWA BABUKU. ˛

Derrick

Jeannie

Page 12: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

ESPAGNE ezali ekolo oyo ezali na makambo ndenge nandenge, ezala mokili yango moko to bato. Eteni mone-ne ya mabele na yango ezali na bilanga ya ble, ya vinyompe banzete ya olive. Na sudi, kaka bakilom�tr� soki 14ya mai nde ekaboli yango na Afrika.

Bato mingi, na ndakisa bato ya Fenisia, Bagr�kimpe bato ya Carthage bakendaka kofanda na ekolo ya-ngo oyo ezali na sudi-w�sti ya Mpoto. Ntango Baromabazwaki mboka yango na si�kl� ya misato liboso ya nta-ngo na biso, babengaki yango Hispania. Na nsima, Ba-Wisighoth na Ba-Maure bayangelaka mpe mboka yangompe mimeseno na bango etikala kuna.

Na mbula moko oyo euti koleka, bato kolekamilio 68 bakendaki Espagne. Mingi na bango bakenda-ki kuna mpo na kotala kong�nga ya moi, bisika ya kito-

M IK I L I MPE BATO � ESPAGNE

Mobembo moko na ESPAGNE

MIN�K� OYO ELOBAMAKA MINGI: ESPAGNOLE, BASQUE, CATALAN, GALICIEN, MPE VALENCIENBATO: 46439000 MBOKA-MOKONZI: MADRIDKLIMA: NTANGO MOSUSU MOLUNGE MAKASI TO MALILI MAKASI

E S P A G N EMADRID

Tolede

PORTUGAL

BISANGACANARIES

Ngomba Teide A F R I K A

Page 13: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Lamuka! No. 2 2017 13

ko oyo ezalaka pembenipembeni ya ebale (plage)mpe bandako na yango ya kala oyo etongamakitoko mpenza. Bapaya mingi basepelaka na bilu-bu ya Espagne. Na restora, na mwa mbongomoke bakoki kotyela yo mbisi, jamb�, ndunda ba-lamba na misuni, salade mpe ndunda balamba tobatya yango mafuta ya olive. Maki bakalinga,paella mpe tapas ya Espagne, ekenda nsango mo-kili mobimba.

Bato ya Espagne bazalaka ns�nins�ni te mpena boboto. Atako mingi na bango balobaka ete ba-zali bandimi ya lingomba ya Katolike, kasi kaka batomoke nde bakendaka misa. Na bambula oyo eutikoleka bato bautaki na Afrika, Azia mpe na Ameri-que Latine mpe bakendaki kofanda na Espagne.

Mingi na bango basepelaka kolobela mateya ya li-ngomba mpe mimeseno na bango. Batatoli yaYeho-va basololaki na bango mpe basalisaki bango baye-ba makambo mingi oyo Biblia eteyaka.

Na 2015, Batatoli ya Yehova koleka 10500 ba-pesaki mab�k� na kotonga mpe kobongisa ba-ndako 70 ya losambo, babengaka yango bandakoya Bokonzi. Leta epesaki bango mabele ofele mpona kotonga bandako yango mosusu. Longola mo-n�k� ya Espagnole, Batatoli ya Yehova basalakampe losambo na bango na min�k� koleka 30 mpona kosalisa bapaya. Na 2016, bato koleka 186000bayanganaki na molulu ya ntina mingi oyo Bata-toli ya Yehova basalaki mpo na kokanisa liwa yaYesu Kristo. ˛

OYE BAK I YAN G O?Espagne esalaka mafuta ya olive koleka bikolo nyonso na mokili.

Ngomba Teide ezali na molai ya bam�tr� 3718 ezalaka nabisanga ya Canaries, ezali ngomba oyo eleki molai na Espagne. Sokibazwi yango mezire kobanda na nse tii likolo, ezali volcan ya misatooyo eleki molai na mokili.

%Istware mpe mimeseno ya Espagne efandi nde na Tolede.Na 1986 bakomaki kotanga yango na kati ya biloko yamotuya na mokili mpe baturiste bakendaka mingi kuna

Mariscada ezali elubu ya mbisi

Mabina babengi flamenco

Ngomba Teide

Page 14: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA Baroma ba-bakaki Yesu na ekulusu oyo basala na bitenimibale ya nzete.OYO BIBLIA ELOBI Babakaki Yesu likolo yanzete. (Misala 5:30, Haut fleuve) Malobanyonso mibale oyo bakomi ya Biblia basalelimpo na kolobela eloko oyo babomaki na ya-ngo Yesu emonisi ete ezalaki eteni moko yanzete kasi mibale te. Buku moko (Crucifi-xion in Antiquity) emonisi ete liloba ya Gr�kistau·ros� elimboli “mpenza nde nzete. Ya-ngo ekokani te na ‘ekulusu.’” Liloba xy�lonoyo Misala 5:30 esaleli, “ezali kaka nzetemoko ya semba to likonzı oyo Baroma ba-zalaki kobaka bato likolo na yango na ba-ns�t� mpe koloba ete babaki bango na eku-lusu.”�

Biblia emonisi mpe ete babomaki Yesuna ndenge oyo Mibeko ya Bayisraele ezalakikos�nga. Mibeko elobaki boye: “Soki motomoko asali lisumu oyo ebongi na etumbu yaliwa, mpe soki abomami, mpe okakisi yena nzete, . . . moto oyo akakisami, azalieloko oyo Nzambe alakeli mabe.” (KolimbolaMibeko 21:22, 23) Ntoma Paulo alobelakimobeko yango ntango akomaki ete Yesu

� Buku A Critical Lexicon and Concordance to theEnglish and Greek New Testament, 11th Edition, ya Ethelbert.Bullinger, nkasa 818-819.

“akomaki elakeli mabe na esika na biso,mpo ekomama ete: ‘Moto nyonso oyo aka-kisami na nzete [xy�lon] alakelami mabe.’”(Bagalatia 3:13) Na yango, Paulo amonisakiete Yesu akufaki likolo ya nzete—eteni mokoya nzete.

B IBL IA ELOB I N IN I ? � EKULUSU

E K U L U S UBato mingi bamonaka ete ekulusu ezali elembo ya lingomba ya bokristo.Kasi bato nyonso te nde bakanisaka ete esengeli kolata ekulusu to kotyayango na bandako to na bandako-nzambe.

Yesu akufaki na ekulusu?

“Babomi ye, bakakisi ye na njete.”—Misala 10:39, Haut fleuve.

r Zwa biyano na mituna mosusu ya Biblia na www.jw.org

Page 15: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

Lamuka! No. 2 2017 15

Bayekoli ya Yesu basalelaki ekulusu mpo na kosambelaNzambe to lokola elembo ya bokristo?OYO BIBLIA ELOBI Esika moko te naBiblia emonisi ete bakristo ya liboso basale-laki ekulusu lokola elembo ya bokristo. Kutu,ezalaki Baroma ya eleko wana nde bazalakikosalela ekulusu lokola elembo mpo na ba-nzambe na bango. Mbula soki 300 nsima yaliwa yaYesu, Constantin Amper�r� ya Roma,aponaki ekulusu ezala elembo ya limpingaya basoda na ye mpe na nsima lingomba ya“bokristo” ekomaki kosalela yango.

Lokola bapakano bazalaki kosalela ekulu-su mpo na kosambela banzambe na ba-ngo, bayekoli ya Yesu bakokaki kosalela ya-ngo mpo na kosambela Nzambe ya solo?Kutu bayebaki ete banda kala Nzambeapekisaki kosalela “elilingi ya eloko nyonso”

na losambo mpe bakristo basengelaki ‘ko-kima losambo ya bikeko.’ (Kolimbola Mibe-ko 4:15-19; 1 Bakorinti 10:14) “Nzambeazali elimo,” moto moko te akoki komonaye. Yango wana, bakristo ya liboso basalela-ki te eloko moko to elembo moko mpo esali-sa bango bamiyoka pene na Nzambe. Kutu,bazalaki kosambela ye “na elimo,” elingi ko-loba elimo santu nde ezalaki kotambwisabango mpe na “solo,” elingi koloba na bo-yokani na mokano ya Nzambe ndenge emo-nisami na Biblia.—Yoane 4:24.

“Basambeli ya solosolo bakosambelaTata na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:23.

Ndenge nini Bakristo bamonisaka etebatosaka Yesu Kristo?OYO BATO MOSUSU BALOBAKA “Ezalaki mpe-nza mabe te soki bakomaki komemya mpekosambela eloko wana ya lobiko. . . . Kosa-mbela elilingi moko boye ekokani na kosa-mbela moto oyo elilingi yango ezali komoni-sa.”—New Catholic Encyclopedia.OYO BIBLIA ELOBI Bakristo basengeli komoni-sa bot�ndi epai ya Yesu mpo liwa na ye esaliete masumu na bango elimbisama, bako-ma baninga ya Nzambe mpe bazwa bomoiya seko. (Yoane 3:16; Baebre 10:19-22) Bi-blia es�ngi bakristo te ete balataka elemboyaYesu to baloba kaka ete bandimelaka yempo na komonisa ete bamemyaka likabooyo apesa. Kutu, “kondima, soki ezali na mi-sala te, ekufi.” (Yakobo 2:17) Bakristo base-ngeli komonisa kondima epai ya Yesu. Nde-nge nini?

Biblia elobi: “Bolingo oyo Kristo azalina yango ememisi biso mokumba, mpo oyotomoni yango oyo: ete moto moko akufelakibato nyonso . . . Baoyo bazali na bomoi ba-zala na bomoi mpo na bango moko lisusute, kasi mpo na moto oyo akufelaki bangompe alamwisamaki.” (2 Bakorinti 5:14, 15)Bolingo oyo Yesu amonisaki esengeli koti-nda bakristo babongisa bomoi na bangompe balanda ndakisa na ye. Yango nde eko-monisa ete bamemyaka mpenza Yesu kasite kosalela elembo moko ya lingomba. ˛

“Oyo ezali mokano ya Tata na ngai: etemoto nyonso oyo azali komona Mwanampe azali kondimela ye azwa bomoi yaseko.”—Yoane 6:40.

Page 16: OYEBAKA ETE EZALI MISALAYABADEMO? bilima bazalaka, kasi sikoyo mingi na ba-ngo (1/3) bak ´ omi kondima likambo yango. Mo-t ´ ango ya bilenge oyo balobi ete bakt aki ndako ya nganga,

g1

7.2

-LI

17

01

25

Es�ngi te ozalaˇ Moto oyo atanga bakelasi mingiˇ Moto ya mbongoˇ Moto ya bindimandima

Es�ngi ozala naˇ ‘Makoki ya kokanisa.’—Baroma 12:1ˇ Komikitisa

Makambo mosusu oyo Biblia eteyaka ekokikokamwisa yo.

sOkosepela koyebaBiblia malamu?

Es�ngi na yango te okomisa nkombo mpo ozwaOkozwa biloko nyonso ofele

s EBANDELI MATEYA YA BIBLIA MIKANDA MAKAMBO ETALI BISO

BIYANO NA MITUNAYA BIBLIA

LISALISI MPO NA LIBOTA

BATO BABAL´A MPE BABOTI

BILENGE

BANA

� � � � � � � � � � Nzambe azali?Biblia eyokani na siansi?Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?

Tala video MPO NA NINI KOYEKOLA BIBLIA?K�ta na jw.org, to salela (scanner) kode oyo