19
“Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na bato”. Litatoli ya William Branham ye mei na oyo etali boyei na likabo

LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

  • Upload
    others

  • View
    0

  • Download
    0

Embed Size (px)

Citation preview

Page 1: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

“Esili Ye kobuta likolo,Apesaki makabo epai na bato”.

Litatoli ya William Branham ye mei

na oyo etali boyei na likabo

Page 2: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki
Page 3: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

17Rev. William Marrion Branham

Page 4: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki
Page 5: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

1

“Esili Ye kobuta likolo,Apesaki makabo epai na bato”.

Mpo na oyo etali boyei na likabo oyo ya lobiko na nzoto,nakoki bobele koyebisa bino ndenge nabikelaki likambo yango.Nandimi solo pe na bosembo ete makabo mabongisama liboso naNzambe. Bato mingi bandimaka kobongisama liboso namakambo te, kasi etalisami polele na makomi ete makambomingi kati na Biblia mabongisamaka liboso na lolenge yabonzambe. Ndakisa, mbotama ya Klisto ebongisamaka uta naElanga na Edene. Pe penepene na mibu 712 liboso na boyei yaYoane Mobatisi, Yisaya amonaka pe alobaka mpo na ye ete azalimongongo na mogangi kati na eliki. Mosakoli Yeremia alobakiete naino atongamaki kati na libumu ya mama na ye te, Nzambeayebaka ye pe atiaka ye lokola mosakoli epai na mabota. Ezali pempo na ntina oyo nde nandimi ete kobongisama liboso namakambo ezali na ebandeli ya likabo oyo : ngai nabotami kati nabasambeli te. Baboti na ngai bazalaki na losambo ekeseni pe nantina wana, nazalaki kokende na ndakonzambe te.

Mbala ya liboso likanisi eyela ngai na ntina na makambooyo esengelaki kosalema nsima, nazalaki penepene na mibunsambo, nautaki kobanda kelasi na mboka, na mwa kilometreepai na likolo ya Jeffersonville, na Indiana, epai wapi tata nangai azalaki sofele ya libota moko ya bato na mbongo mingi.Nalingaka kolobo pe bokila mingi^ata mbongwana na ngaielongoli yango na ngai te^bongo na mpokwa moko na sanzaya libwa bana mibali mosusu bakendeki kolobo na eziba oyoetondaki na mbisi, na ntango oyo ngai, na ntango yangonasengelaki komema mai mpo na tata na ngai. Nazali na mawaya koyebisa bino soki mosala ya mai yango ezalaki nini. Tatana ngai azalaki momeli monene, pe na eleko wana bazalakikolamba lotoko, nasengelaki bongo kotia mai na nzungu

Page 6: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

2

minene, oyo basengelaki kosalela na butu wana. Ntangonazalaki kotambola na nzela, nakitisaki katini mike ya mai yasukali na mabele mpo napema moke na nse ya nzete, nazalakikolela mpo ete nakokaki kokende kolobo elongo na banamosusu te. Na ntango nafandaki wana pene na nzete yango,likambo moko esalemaki oyo nakoki kobosana soki moke te.Nayokaki makelele lokola mopepe koningisa nkasa, kasi,ntango natomboli miso, namonaki nkasa koningana te toelembo moko ya mopepe te. Nafandaki nye, nakamwaki mingipe nazalaki komituna soki makelele yango ezalaki kouta wapi,ntango nayokaki yango lisusu, bongo nakamataki katini nangai pe nabandaki kozonga na nzela nayelaki. Nayokaki yangolisusu, makasi koleka liboso, pe lokola nabalukaki mponamona nini eutaki kosalema, namonaki ete pene na katikatiya nzete yango eloko moko lokola ekumbaki ezalaki wana,mongongo moko eyokanaki uta na ekumbaki yango pe elobakimaloba oyo : “Komela makaya soki moke te, komela masangasoki moke te, pe koyeisa mbindo na nzoto na yo soki moke teata na lolenge moko te, mpamba te mosala moko ekozala mpona yo kosala ntango okokola”. Nabangaki mingi na lolenge etenayebaki eloko nakokaki kosala te. Nakimaki mbangu nandako na kogangaka, pe namibwakaki na maboko ya mama nangai, oyo akanisaki ete nyoka eutaki koswa ngai. Nayebisaki yeete nazalaki bobele kobanga, bongo alalisaki ngai na mbeto pealingaki kobenga monganga, akanisaki ete nazuaki likama namisisa na ngai ya moto. Nzoka nde, baninga na ngai, nayebi etebato mingi bakotiola lisolo oyo, kasi nakoki komema mokumbana oyo bamosusu bazali koloba te^nazali bobele namokumba na oyo ngai moko nabikeli. Emonani polele etenalekaki lisusu pene na nzete yango te. Nakomaki koleka nangambo mosusu ya elanga mpo na kokima yango, mpo nazalakikokanisa ete moto moko azalaki likolo na nzete yango. Penazali kondima naino ete moto moko azalaki na nzete yango.Ezalaki nde mwanje na Nzambe, pe nsima na mibu,nakutanaki na ye miso na miso pe nasololaki na ye.

Page 7: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

3

Nsima ya mwa mposo, nazalaki kobeta bile na ndeko na ngai,ntango nsomo esalaki ngai. Nakweyaki na nse ya nzete moko pe,lokola kati na kosenzwa, namonaki gbagba moko monene kobimape kokatisa ebale, namonaki bato ebele kouta na yango, kokweana ebale pe kokufa. Ntango bomoto ezongeli ngai, nakimakimbangu koyebisa yango epai ya mama na ngai, pe mbala mokolisusu alobaki ete nazalaki mwana na motema mokuse. Mibuntuku mibale na mibale nsima na yango, batongaki gbagba yacommune likolo ya ebale ya Ohio, pe bobele motango yango yabasali bakweaki na mai, kouta na gbagba pe bakufaki. Bomoni,makambo oyo esalemaki uta na libondeli to na mposa moko boyete, kasi ebongisamaka liboso kati na mokano na Nzambe.

Likambo ya boye oyo elandaki, esalemaki mokolo mokonazalaki kokende na ebale elongo na tata na ngai pe mobalimosusu. Bapesaki ngai lotoko ete namela mwa moke pe, lokolanalingaki ete mobali yango asepela na ngai mpo atika ngainasalela masuwa na ye, nalingaki namela. Kasi solo mpenzandenge nazali koloba lelo, nayokaki makelele yango lokolakoningana ya nkasa. Natalaki zongazonga na ngai, pe namonakiata nkasa te, ata elembo ya mopepe te. Ntango natombolaki lisusumolangi pene na bibebu na ngai, nayokaki bobele makelele yango,kasi makasi koleka. Nsomo esalaki ngai lokola mbala ya liboso;natikaki molangi yango pe nakimaki, na ntango yango tata nangai mpenza azalaki kobenga ngai bibangabanga. Oo, boniezalaki mpasi! Nsima na mikolo, moninga na ngai ya mwasi yabolenge abengaki ngai bibangabanga ntango nayebisaki ye etenamelaka makaya te. Nasilikaki na ndenge atiolaki ngai,nakamataki likaya pe nalingaki kaka komela yango; nde makelelewana ya momeseno epekisaki ngai, esalaki ete nabwaka likayayango pe nalongwa wana na kolelaka, mpo ete nakokaki kozalalokola bilenge mosusu te, wana kotiola ya bato ezalaki kokomelangai na matoyi. Oyo ezali bobele ndambo na ebele na makambo yalolenge oyo, oyo esalemaki kati na bomoi na ngai. Nazalaki ntangonyonso komiyoka ndenge mosusu lokola nde moto moko azalakipene na ngai, oyo azalaki koluka koyebisa ngai likambo, mingi

Page 8: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

4

mpenza ntango nazalaki ngai moko. Emonanaki lokola ete atamoto moko te azalaki kososola ngai. Bana mibali oyo nazalakikolinga ete bazala baninga na ngai bazalaki kosepela na ngai atamoke te mpo ete nazalaki komela makaya pe masanga te, pe wanabana basi nyonso bazalaki kokende na mabina, nakokaki pekozala na bango te, na bongo emonanaki lokola ete kati na bomoina ngai mobimba nazalaki mbuma mabe, nayebaki ata moto teoyo azalaki kososola ngai, pe ata ngai moko nazalaki komisosolate. Kasi na eleko wana nayebaki te lokola nayebi lelo makambominene oyo ezalaki kozela ngai.

Likambo ya motuya oyo elandaki oyo nazali komikaniselaesalemaki ntango nazalaki penepene na mibu zomi na libwa. Nampokwa moko nazalaki kotambola elongo na bana mibalimosusu na kati na foire, pe mongongo moko ebengaki ngai :“Tala, yo! Yaka awa!” Nabalukaki, namonaki elenge mwasimoko afandaki na nse na hema, azalaki nganga minzoto.Ayebisaki ngai ete napusana pene na ye pe, lokola nakanisaki eteazalaki na bosenga ya mwa lisungi, napusanaki. Alobaki : “Tala,yo oyebi ete obotama na nse na elembo moko pe ete monzotomoko elandaka yo? Obotama na likabo”. Solo mpenza, baningababandaki kotumola ngai mpo na oyo etali ‘kozala na likabo’, nabongo namekaki kosukisa likambo yango pe nazongiselaki mwasiyango mwa maloba, alobaki na ngai ete atako oyo ayebisaki ngaiesepelisaki ngai te, mokolo moko nakososola ntina ya maloba naye. Namekaki kolongola makambo yango na makanisi na ngai,nasalaki misala ndenge na ndenge, nasepelaki ata moke te,nazalaki koumela na ndako moko te, nakufelaki ata mwasi pebebe na ngai, pe mpasi mosusu pene na koleka oyo motema ekokikoikela mpiko. Nazalaki koluka kimia pe kosepelisama kati nanyonso oyo moto akoki kokanisa, kasi emonani ete esika mokoezalaka na nzoto ya moto ya bonene ya pouce soki zomi [kolekacentimetele ntuku mibale na mitano_N.D.T.] likolo ya mopanziya mitano, esika yango ezalaka mpamba soki Klisto naino akotikuna te. Pe likolo ya mawa na ngai, nazalaki ntango nyonsokoyoka lokola ezali moko ezalaki kokonza ngai, yango ezalaki

Page 9: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

5

bobele kobakisela ngai mawa. Na suka, bolingo na ngai yabikelamu ekambaki ngai kosala mosala ya mobateli na nyama nazamba ya etuka ya Indiana, yango ezalaki komema ngai na bisikandenge na ndenge kati na etuka.

Mokolo moko natelemaki na kati ya otobisi oyo etondaki nabato, ezalaki kokende na Henryville, na Indiana, pe, nayokakilokola moto moko azalaki kotala ngai, bongo nabalukaki pe misona ngai ekutanaki na miso mosusu ya langi ya ebende, ya mwasimoko na bonzenga mingi. Alobaki na ngai : “Ozali komiyoka eteozali yo moko, boye te?”

Nayanolaki : “Te, madame”, pe nakobaki kotala na lininisa,nakanisaki ete asepelaki na elamba na ngai ya mosala pe etealingaki bobele kosolola na ngai.

Alobaki lisusu : “Ekozala mbala mosusu malamu etenamilimbola. Nazali nganga minzoto”.

“Malamu”, namilobelaki, “ekozala malamu ete nayoka oyoalingi koloba”.

“Likambo oyo esepelisaka yo ata moke te, boye te?”“Iyo madame, ata moke te”.“Okanisi ete nalingi kosolola na yo na ntina na kosambela,

boye te?”“Nayebi te”.“Osambelaka, boye te?”“Te, madame”.“Mbala mosusu nakoki koyebisa yo likambo oyo etali yo moko.

Ozali moto ya Elimwelo na moi, boye te?” atunaki ngai bongo.“Te madame”.

“Na bongo olingi kokende na Elimwelo na moi”.

“Oo, wana, ekeseni. Nayanolaki ye : Nalingaka ntangonyonso kokende na Elimwelo na moi”, nakanisaki ete natika yeakoba koloba pe nakokanisa yango na oyo nganga minzotomosusu wana alobala.

Page 10: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

6

Alobaki : “Yango, ezali na ntina na mbotama na yo”.

Mpo na koluka koyeba, natunaki ye : “Oyebi nini na ntina nambotama na ngai?”

“Elenge mobali, soki nayebisi yo ngonga mpenza ya mbotamana yo, okondima ngai?”

Nayanolaki ye : “Malamu, lokola nalingaka mingi koyeba soloya likambo, pe soki moto ayebisi ngai solo, esengeli nandima ye”.Pe nazali kondima yango kino lelo_soki likambo ezali solo, ezalisolo.

Bongo, kotuna ngai te ndenge asalaki, kasi apesaki ngai minitimpenza ya mbotama na ngai. Elenge moko mosali kati namasuwa azalaki nsima na ngai, pe natunaki mwasi yango sokiakokaki koyebisa ye mokolo ya mbotama na ye. Ayanolaki ngaiete akokoka te, pe, nazalaki kososola yango te, na bongo natunakiye mpo na nini akokaki koyebisa ngai oyo ya ngai kasi akokakikoyebisa ye oyo ya ye te. Alobaki ete ezalaki mpo na elembo oyoezalaki kolanda ngai^motema na ngai epasoanaki, mpo ete oyobamosusu bayebisaka ngai ebandaki kozongela ngai. Atunakingai soki nganga minzoto moko asila kolobela ngai, nayanolakiye ete naino te, nakosaki mwasi yango.

Atunaki ngai : “Oyebi eloko moko na ntina na Yesu Klisto?”

“Nayebi ete Asengelaki kozala mwana na Nzambe”, ezalakitoloba nyonso oyo nakokaki koloba.

“Oyebi likambo moko na ntina na mbotama na Ye?^ Bananibayaki kokumbamela Ye liboso?”

“Soki nakanisi malamu, ezalaki bato na mayele misato”.

Akobaki koloba : “Bazalaki kolanda nini?”

“Monzoto, nabanzi”.

Alobaki : “Ezali bongo. Basengelaki bongo kozala bangangaminzoto, mpo bazalaki kotala minzoto”. “Elenge mobali, ngainasila kosolola na bato ya Maison Blanche. Nakebisaki mokonzi

Page 11: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

7

Harding mpo na liwa ya kokamwa oyo elingaki kokomela ye, penazali pe na mwa likambo ya kosolola na yo. Obotamaki na nse namonzoto moko mpo ozala moto oyo azali na likabo. Ata moteyimoko naino alobela yo yango te?”

Nayebisaki ye : “Likambo ya bateyi etali ngai te”.

“Soki bongo yoka ngai : Ntango Yesu Klisto abotamaki, batona mayele misato bautaki na ebimelo na moi bazalaki kolandaoyo na momeseno babengaka monzoto; kasi solo mpenza ezalakiminzoto misato oyo ekutanaki na Beteleme, pe ntangoesanganaki, esalaki monzoto moko oyo etelemaki likolo na Klisto.Na ntango wana, Nzambe atindaki Likabo oyo eleki monene nakati na oyo Atinda na mokili, Mwana na Ye na likinda. Ntangobato na mayele bazongaki, minzoto yango misato ekabwanaki peuta ntango wana ekutanaki lisusu ata mbala moko te. Nzambeatalisaka ntango nyonso misala na Ye na likolo liboso ete atalisayango na mokili, bato na mayele misato wana bazalaki kotalaesakweli ya mosakoli Balame oyo elobaki ete monzoto mokoekobima uta na Yakobo”, akobaki koloba, azalaki kotangela ngaimakomi mingi oyo nayebaki te, kasi nazalaki koyoka na bokebimingi wana ezalaki ye kokoba kolobela ngai. “Nzoka ndeminzoto yango ekutanaki lisusu ata mbala moko te, kasi nsima namwa mibu banzela na yango ekutanaka, pe ntango yangoesalemaka etalisaka ete mpo na kopesa lokumu na mbotama naYesu, likabo mosusu etindami na mokili. Na mbotama na yo,minzoto yango ekutanaki. Monzoto moko ezalaki kolanda yontango omataki na otobisi na Jeffersonville; namonaki monzotoyango likolo na yo, pe nazali kososola te mpo na nini bamosusubayebisa yo yango liboso te”.

Mpo ete moto asosola mabe te, nakotalisa nsimaete kosalela bonganga minzoto ezali libanda naMakomi pe solo mpenza moklisto moko te asengelikomipesa na yango (Yisaya 47.13-14). Maloba yanganga minzoto oyo na ntina na monzoto ya Klistoezali ndimbola na ye moko, pe ezali kati na Makomi

Page 12: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

8

te. Kasi yengebene na Makomi Satana ye mokoatatolaka likabo na Nzambe, pe yango nde ntina oyonazali koyebisa bino masolo oyo.

Bokoki kokanisa ndenge nazalaki komiyoka, na ntangoyango. Ntango nakomaki, natondoki mwasi yango pe nakitakina otobisi, kasi nazalaki kokoka kokabwana na nsomo yango teoyo ntango nyonso ezalaki likolo na ngai, oyo ezalaki kosalaete nakoma motema likolo pe mokuse, nazala na mawa ntangobato bazalaki pene na ngai, nzoka nde nazalaki kobangakozala ngai moko. Nazalaki kobanga ntango nyonso mopepeezalaki kopepa. Nazalaki ntango nyonso komituna : “Nyonsowana elingi mpenza koloba nini?” Mwa ntango moke nsima nayango, nabongolaki motema pe napesaki bomoi na ngai epai naKlisto. (Nakomaki na mokuse lisolo ya bomoi na ngai kati namwa buku moko etangami “Yesu Klisto azali Motindo moko,Lobi, Lelo pe Libela”.) Nsima na mbongwana na ngai, oyoesalemaki na kati ya mwa ndako oyo ezalaki na nsima yandako na biso, nakotaki na moko na bitonga ya ba-baptiste penakomaki mpaka na lingomba ya mboka na biso, pe DocteurRoy Davis ya Jeffersonville nde atielaki ngai maboko. Nsimana ngai kosala na elonga mayangani ya kolamuka na nse nahema, batongelaki ngai ndakonzambe, oyo ezuami kino lelo namatakanelo ya balabala ya 8 pe ya 10, oyo eyebani na nkomboya Branham Tabernacle, pe kati na mibu ebele nazalaki namwa elonga lokola moteyi, nabatisaki nkoto ebele ya bato penamonaki bato mingi kobongola mitema mpo na nkembo naNzambe na nguya nyonso. Ata na eleko yango nazalakikobondela mpo na babeli pe mbano ezalaki malamu mingi,atako nayebaki naino te ndimbola ya nyonso wana, pe mbalamingi bimononeli pe makambo na kokamwa ezalaki koyelangai, bato mingi ya Jeffersonville pe ya zongazonga bakokikotatola yango. Awa, nalingi koloba bobele mpo na moko katina yango : Nazalaki na esika moko boye na ebale ya Ohio,nazalaki kobatisa ebele na bato oyo babongolaki mitema, wanabato mingi bayanganaki na libongo mpo na kotala mosala

Page 13: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

9

yango. Nsima na nzanga wana moi ezalaki makasi, pe kuna nalikolo mapata ezalaki te, monzoto moko monene ezalakikongenga pe ekitaki kotelema likolo ya esika oyo nazuamaki.Mingi kati na bino bakomikanisela ete basila kotanga yangokati na zolonale. Emonani mbala ebele uta ntango wana. Elekimwa ntango nazalaki na mpokwa misato ya mayangani naengumba moko ya monene, pe bato nkama na nkama bazalakiwana. Moto ya liboso oyo nabondelaki mpo na ye ezalakimwana moko ya moke, oyo makolo na ye ekondaki mpo naebukabuka, yango esalaki ete akomaki kotambola na nsonge yamisapi. Lokola momeseno kati na mayangani na biso, batobafandaki pe bagumbaki mito mpo na limemia wananamemaki mwana yango na maboko na ngai mpo nabondelampo na ye, bongo emonanaki lokola pole makasi ebetaki ngai.Bozangi bonkonde ya sinzili ekamwisaki ngai, atalisakimwinda monene epai na ngai, pe ntango nafungolaki miso nakokamwa, monzoto na ntongo ezalaki wana liboso na ngai!Natikaki mwana mobali yango, to ye nde alongwaki namaboko na ngai pwasa^nazalaki kososola te oyo ezalakikosalema, emonanaki lokola misisa na ngai nyonso ekufaki.Ntango akomaki na nse makolo na ye ekomaki malamu, pempo na mbala ya liboso na bomoi na ye atambolaki na ndengeelongobani longwa na eteyelo. Yango ebotaki yikiyiki kati naliyangani. Mama na ye akweaki nsenza; elenge mwasi mokomonazarea, oyo azalaki moninga ya mwana wana, azalakikobeta “Monganga Monene” na piano, pe ntango amonakilikamwisi oyo molingami na biso Nkolo Yesu autaki kosala,atelemaki na mbala moko pe apotaki na ntaka ya pieds zomina mitano [metele mitano_N.D.T.] longwa na piano, mabokolikolo, azalaki kolela pe koganga^pe nayebi ete oyo ekokikomonana lokola lokuta, kasi bato nkama na nkama bakokikotatola yango^piano yango ezangaki kobeta ata eteni mokote, kasi ekobaki kobeta loyembo yango. Makambo mingi yaminene esalemaki. Bato koleka nkama nsambo bapesakimitema na bango epai na Klisto na mpokwa wana. Mingi kati

Page 14: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

10

na bino oyo bozalaki wana bokotanga yango^ Nzambeapambola bino. Nazali kokoba koluka kosala nyonso oyonakoki mpo na Klisto.

Sasaipi nakopesa ndimbola na ntina na motuna oyo batobatunaka mbala na mbala. Bateyi mingi batunaki ngai : “NdekoBranham, okanisi nini mpo na bonganga minzoto? Yo osalakamakambo oyo na nguya ya bonganga minzoto? Soki te, mpo nanini opesaka polele lokumu na banganga minzoto wana etebasakolaki likambo yango?” Nakoki koloba bobele boye :botangela ngai esika bobele moko na mokili epai wapi nguya nabonganga minzoto ezali kobikisa babeli. Kati na bangangaminzoto nyonso, bato-na-soloka, banganga nkisi, pe bongo nabongo, oyo basila kozala na mokili oyo, botangela ngai epai wapimoko mpamba asila kofungola miso na bakufi miso, koyokisabakufi matoi to kolobisa bimimi. Nzela ezali bobele moko^naNkombo na Yesu Klisto pe Makila na Ye oyo esopanaki naGologota. Kasi oyo ezali kokamwisa ngai mingi (kalakala lokolape lelo), ezali makambo lokola oyo : ntango Likabo ezalaki kati naelielo na bibwele, banganganzambe bazalaki kati na tempelobazalaki kowelana mpo na koyeba soki lisekwa na bakufi ezalakato te, nzoka nde na ntango yango lisanga ya bato na mayelebautaki mosika pe basosolaki Likabo oyo Nzambe asilaki kopesana mokili. Na ntembe te, nazali koloba ete bonganga minzoto eutina nguya oyo mosusu wana, kasi ata zabolo asengeli kopesalitatoli na ntina na likabo na Nzambe. Oyo bato ya mayele yangobazalaki pe nini basalaki ezali na ntina te^kasi solo ezali etebatatolaki Likabo na Nzambe pe bayaki kokumbamela Ye libosoete banganganzambe oyo bazalaki kati na tempelo basala yango.Ndenge moko, ntango Polo na Sila bazalaki na Filipi, epai wapibanganganzambe pe bateyi ya engumba wana bazuaki bangolokola bakosi pe bakangisaki bango na boloko, mwasi-na-solokamoko boye agangaki, koloba na bato ete mibali oyo batindami naNzambe mpo na kotalisa bango nzela na lobiko. Ezali kokamwisate ete elenge mwasi mosali oyo azalaki na molimo mabe asosolakinguya na Nzambe oyo ezalaki kosala kati na Polo pe Sila, nzoka

Page 15: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

11

nde bakonzi ya mboka yango bandimaki ata bango te. Mpo nakopesa ndakisa mosusu, ezali kokamwisa te ete na ntango oyobato mingi bazalaki koloba ete Yesu azalaki Belezebula, milimomabe kati na mobali moko bagangaki koloba ete bayebaki nani Yeazalaki^zabolo azalaki kotatola bonzambe na Ye, wanabafalisai bazalaki koloba ete Azali zabolo. Ezali pe ndenge mokolelo, mingi bazali kotia ntembe pe kowelana kati na bango na oyoetali malakisi na bango pe biteyeli na bango, pe bazali kopekisabato koya na mayangani ya lobiko na nzoto, na ntango oyo likabona Nzambe ezali kokoba kosala na mokili mobimba pe ebele katina bango bazali kozanga yango. Oo, banganganzambe! Nazali naelikia epai na Nzambe ete bokolamuka. Ezali te mpo ete ngai ndenapesami mokumba ya likabo yango; boyei na yango etali ngaite^ Nzambe nde atindi yango. Ntango bana na Yisalaelebazalaki na Ezipito kolelaka mpo bazua mosikoli, Nzambeatindelaki Mose mwanje na Ye. Yango etalelaki Mose te^mwanje na Nzambe nde asalaki mosala, asalaki bikamwisi. Moseazalaki bobele monoko mpo na mwanje na Nzambe; pe yango ndenyonso oyo nazali lelo^bobele monoko mpo na mwanje.

Nasengeli kosolola na bino na ntina na mwanje pe na boyei naLikabo. Nakobosana soki moke te mokolo wana, mwa 7 sanza yamitano 1946^ezalaki na eleko moko kitoko mingi na mobuyango na Indiana, epai wapi nazalaki naino kosala mosala nangai ya mobateli ya nyama na zamba. Nazongaki na ndako mpona kolia, pe nalongolaki mondoki na ngai ntango nakomaki namopanzi ya ndako, pe molingami moko ayaki koyebisa ngai etetokende na Madison na nsima na nzanga wana. Nayebisaki ye etenakokaki kokende te mpo ete nasengelaki kosenzela, ntangonazalaki kotambola mpembeni na ndako nalekaki na nse ya nzeteya sikomore, pe emonanaki lokola ete songe ya nzete yangoezalaki kolongwa mobimba mpenza. Emonanaki lokola ete elokomoko eutaki kokita na nzete yango lokola mopepemakasi^nazalaki kotambola na kotengatengaka^bayakimbangu epai na ngai^mwasi na ngai abimaki na ndako, nakobanga, pe atunaki ngai likambo nini ekomelaki ngai. Ntango

Page 16: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

12

nazalaki komeka komikanga, nafandaki pe nayebisaki ye ete utakoleka mibu ntuku mibale nsomo wana ezalaki kotungisa ngai,pe ntango ekokaki mpo nayeba ntina na nyonso wana, soki bongote nalingaki kozonga te. Ntango ya kozua mokano ekokaki.Napesaki ye pe mwana na ngai mbote na ngai ya suka, penakebisaki ye ete soki kati na mwa mikolo moke nazongi te, alukangai soko moke te. Pe tala, ndeko motangi, eteni ya likambo nakokamwa oyo etali lobiko ya nzoto na yo, boye tanga na bokebi pekati na libondeli. Na nsima na nzanga wana nakendeki na esikamoko ya nkuku mpo na kobondela pe mpo na kotanga Biblia nangai. Nakotaki na bozindo ya mabondeli; ezalaki lokola molimona ngai mobimba elingaki kobima libanda. NabelelakiNzambe^natiaki elongi na mabele. Natombolaki miso epai naNzambe pe nabelelaki : “Soki Olingi kolimbisa ngai na lolengeoyo nasalaki nakomeka kosala malamu koleka^ Nayoki mpasina motema ndenge natalaki mpamba mosala oyo Olingaki etenasala kati na mibu oyo nyonso^ Okolinga kosolola na ngai, nalolenge moko to mosusu, e Nzambe? Soki Osungi ngai te,nakokoka kokoba te”. Bongo na kati ya butu, pene na ngonga yazomi na moko, nautaki kosilisa kobondela pe nasembolaki nzotontango namonaki mwa pole koningana kati na esika yango.Nakanisaki ete moto moko azalaki koya na torche, na bongonatalaki na lininisa, moto moko azalaki te, ntango natalaki nansima, namonaki ete pole yango ebandaki kopanzana na nse,ezalaki kokoba kokoma monene. Nzoka nde nayebi ete bozalikomona yango likambo ya kokamwa, ezalaki pe bongo mpo nangai, kasi bomikanisela, lobiko na bino ya nzoto etaleli kondimana bino to te, ndenge bokomona yango nsima. Ntango pole yangoezalaki kopanzana, na ntembe te, nalengaki pe namisembolaki nakiti na ngai, kasi ntango natombolaki miso, monzoto yango yamonene etelemaki wana. Kasi yango ezalaki na songe mitano telokola monzoto, ezalaki mpenza lokola libungutulu ya moto to yapole, oyo ezalaki kongengisa mabele. Bobele na ntango yango,nayokaki moto moko kotambola na mabele, oyo ebangisaki ngailisusu, mpo nayebaki ete moto mosusu te akokaki koya na esika

Page 17: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

13

yango bobele ngai. Bongo namonaki makolo ya moto kobima utana pole yango, koya epai na ngai pelamoko yo pe okoki kobelemana ngai. Azalaki lokola mobali oyo, akoki kozala na bozito yalivres nkama mibale [kilo penepene na ntuku libwa_N.D.T.],alataki elamba ya mpembe, elongi na ye ezalaki sembesembe,mandefu te, kasi suki na ye moindo ekitaki kino na mapeka,loposo na ye ezalaki moindo, pe elongi na ye ezalaki kitoko mingi,ntango apusanaki, miso na ye ekutanaki na oyo ya ngai, pe lokolaamonaki ete nazalaki kobanga, abandaki koloba. “Kobanga te.Natindami uta na bozali ya Nzambe na Nguya nyonso mpo nakoyebisa yo ete bomoi na yo ya kokamwa pe lolenge na yo oyoesosolami mabe ezali mpo na kotalisa ete Nzambe atindi yo mpoomemela bato ya mokili likabo ya lobiko na nzoto kouta naNzambe. SOKI OKOZALA SEMBO, PE SOKI OKOMEMABATO ETE BANDIMA YO, ELOKO ATA MOKO TEEKOTELEMELA LIBONDELI NA YO, ATA PE CANCER TE”.Maloba ekoki te kolimbola ndenge nayokaki. Ayebisaki ngaimakambo mingi oyo nakoki kokoma awa te mpo esika ezali te.Ayebisaki ngai ndenge nakozala na makoki ya kokukola makonoya bato na nzela ya koningana ya loboko na ngai. Akendeki, kasiuta ntango wana nakutani na ye mbala mingi. Amonani na ngai,naloba mbala moko to mibale kati na sanza motoba oyo, peasololaki na ngai. Mbala mingi te amonani polele liboso na batomosusu bazalaki wana. Nayebi te soki azali nani, nayebi bobeleete azali motindami na Nzambe epai na ngai.

Ntina ya koloba yango ezali te, nabandaki kobondela mpo nababeli. Nalobi te ete nazui esika ya monganga^nakanisi eteNzambe atia minganga awa mpo na kosunga bikelamu, kasibazali bobele bato^ Nzambe nde azali na nguya nyonso.Makambo minene oyo esalemi kati na sanza ntuku mibale namoko euti koleka eleki mingi mpo tokoka kokoma yango nyonso,kasi mbala na mbala Nzambe atatolaki maloba ya mwanje. Bakufimatoyi, bimimi, bakufi miso, lolenge nyonso ya makonoebikisamaki, pe matatoli nkoto na nkoto ekomami kino lelo. Ngaimoko nazali na nguya ata moko te mpo na kosala makambooyo^nazali moto oyo azangi nguya kino ete nayoka bozali na Ye.Bato mingi oyo bazalaki na mayangani oyo bayebi ete makono pe

Page 18: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

14

masumu na bango eyebisamelaki bango polele uta na eteyelo.Ndeko motangi, nasengi na yo ete ososola mabe te lolenge na ngaioyo ya malonga te ya komeka koyebisa yo makambo oyo nyonso.Nazali koloba yango mpo okoka kososola malamu koleka lolengeya kozua litomba na likabo na Nzambe. Ayebisaki ngai ete nazalasembo pe namema bato na kondima, pe yango nde nazali komekakosala. Kanisa, tokotiela makoki ya Nzambe ntembe ata mbalamoko te; toyebi ete Akoki kosala makambo manso, kasi likamboya mpasi ezali nde komema moto andima moto mosusu. Nzambeazalaka ntango nyonso na eloko moko to na moto moko oyo nanzela na ye Akoki kosala, pe ngai nazali bobele esalelo oyo Yeazali kosalela. Ata moto moko te oyo akokufa akoki komipesalokumu ete asila kosala likamwisi, ngai pe nazali bobele moto oyoakokufa. Nayebi te soki etikali ntango boni lisusu oyo Nzambeakotika ngai nasala yango, kasi na ngolu na Ye, nazali na mposa yakosalela Ye malamu koleka na kosalelaka libota na Ye na ntangonyonso oyo Akobatela ngai na bomoi.

Mpo na kosukisa, mpo na bino baoyo bozali koluka lobiko nanzoto kati na mayangani oyo. Botika ngai napesa bino mibekooyo mibale oyo bosengeli kolanda, mpo bozua oyo bozali kolikiaepai na Nzambe.1. Bosengeli kondima maloba ya litatoli oyo nayebisi bino, pe eteLikabo oyo ya Lobiko na nzoto, oyo epesami na Nkolo YesuKlisto, ezali nzela oyo Nzambe apesi mpo na lobiko na bino.2. Bolaka na motema mobimba ete bokobika mpo na Nzambe nabomoi na bino oyo etikali.

Esalemi na lingala na mobu 2004.

LINGALA

©2004 VGR, ALL RIGHTS RESERVED

VOICE OF GOD RECORDINGSP.O. BOX 950, Jeffersonville, Indiana 47131 U.S.A.

www.branham.org

Page 19: LINTR-ASCE Esili Ye kobuta likolo, Apesaki makabo epai na ...download.branham.org/pdf/LIN/LINTR-ASCE He Ascended...Rev. William Marrion Branham. 1 “Esili Ye kobuta likolo, Apesaki

Liyebisi ya makoki ya mokolo-eloko

Makoki nyonso ekopesama na ndingisa. Búku oyo, ekoki kozala imprimé na masíni ya ndako mpo na yo moko to kokabama, ofelé, lokola esalelo mpo na kopalanganisa Nsango Malamu ya Yesu Klisto. Búku oyo ekoki kotekama te, koyíkanisama te, kotiama na site internet te, kobombama mpo na kolukaluka te, kolimbolama na nkota mosusu te, to kosalela yango mpo na kosenga misolo te, kozanga ndingisa ekomami mpenza na Voice Of God Recordings®.

Soki olingi koyeba makambo mosusu to kozua bisalelo mosusu, komélá:

VOICE OF GOD RECORDINGSP.O. BOX 950, JEFFERSONVILLE, INDIANA 47131 U.S.A.

www.branham.org